Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/13 nk. 12-13
  • Siruse Monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Siruse Monene
  • Lamuká!—2013
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NDENGE OYO SIRUSE AKWEISAKI BABILONE
  • BISAKWELI YA KOKAMWA MPENZA
  • BABIKISAMAKI NA NDENGE YA LIKAMWISI
  • LISOLO YANGO ETALI YO NA NINI?
  • Balongwe na Babilone
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Buku oyo okoki kotyela motema—Eteni 4
    Lamuká!—2011
  • Yehova azali ‘Nzambe ya boyengebene mpe mobikisi’
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Totya elikya epai na Jéhovah kasi epai na “mwango na mabota” te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Lamuká!—2013
g 7/13 nk. 12-13

Lilita ya Siruse

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Siruse Monene

Kalandriye ya mikolo na biso emonisi ete na butu ya 05-06 sanza ya zomi, mobu 539 liboso ya ntango na biso, likambo oyo ezalaki komonana lokola ekoki kosalema te ekómelaki Babilone, mboka-mokonzi ya ampire ya Babilone. Ndenge esakolamaki, na butu yango, engumba yango ekweaki na mabɔkɔ ya basoda ya Bamede ná Baperse, oyo Siruse, mokonzi ya Perse, oyo ayebanaki mpe na nkombo Siruse monene, azalaki kokamba. Asalelaki mayele moko ya malamu mpenza.

NDENGE OYO SIRUSE AKWEISAKI BABILONE

Buku moko (Ancient World Leaders​—Cyrus the Great) elobi boye: “Ntango Siruse azwaki ekateli ya kokweisa Babilone, engumba yango ezalaki na lokumu koleka bingumba nyonso ya Moyen-Orient; ekoki kozala ete elekaki bingumba nyonso ya mokili na lokumu.” Babilone ezingamaki na ebale Efrate, oyo mai na yango ezalaki kotondisa baterase ya mozindo oyo ezalaki zingazinga ya bifelo milaimilai; nyonso wana ezalaki kosala ete Babilone emonana lokola ekoki soki moke te kokwea na mabɔkɔ ya banguna.

Kobanda esika oyo mai yango ezalaki kouta na Babilone, basoda ya Siruse balekisaki yango na nzela mosusu mpe yango esalaki ete mai ekita. Na nsima, basoda yango batambolaki na kati ya ebale tii na baporte ya engumba oyo ezalaki polele, mpe bazwaki Babilone kozanga ete bábunda. Hérodote mpe Xénophon Bagrɛki oyo bazalaki bato ya istware balobaki ete lokola engumba yango ebatelamaki malamu, bato ya Babilone bazalaki komona ete mabe ekokómela bango te, yango wana, na butu oyo babundisaki bango, mingi na bango bazalaki na fɛti, ata mpe mokonzi! (Talá etanda “Makomi ezali na efelo.”) Lisusu, ndenge oyo Siruse akweisaki Babilone, ekokisaki bisakweli mosusu ya kokamwa ya Biblia.

Biblia esakolaki ndenge oyo Siruse akokweisa Babilone

BISAKWELI YA KOKAMWA MPENZA

Bisakweli ya Yisaya ezali mpenza na ntina mpo ekomamaki mbula soki 200 liboso; ekoki kozala mbula 150 liboso kutu Siruse abotama! Tótalela makambo oyo elandi:

  • Moto moko na nkombo Siruse akokweisa Babilone mpe akopesa Bayuda bonsomi.​—Yisaya 44:28; 45:1.

  • Ebale Efrate ekokauka, mpe ekopesa basoda ya Siruse nzela ya kokɔta.​—Yisaya 44:27.

  • Baporte ya engumba ekotikala polele.​—Yisaya 45:1.

  • Basoda ya Babilone ‘bakotika kobunda.’​—Yirimia 51:30; Yisaya 13:1, 7.

BABIKISAMAKI NA NDENGE YA LIKAMWISI

Mwa liboso, na mobu 607 liboso ya ntango na biso, mampinga ya Babilone ebebisaki Yerusaleme mpe ememaki bato mingi oyo babikaki na boombo. Bayuda bakotikala na boombo mbula boni? Nzambe alobaki boye: “Ntango mbula ntuku nsambo ekokokisama, nakolandela mokonzi ya Babilone mpe ekólo yango . . . mpe nakokómisa yango esika oyo etikali mpamba mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”​—Yirimia 25:12.

Ndenge esakolamaki, Siruse akweisaki Babilone na mobu 539 liboso ya ntango na biso. Mwa moke na nsima, apesaki Bayuda bonsomi, mpe babandaki kozonga na mboka na bango na mobu 537 liboso ya ntango na biso​—elekaki mpenza mbula 70 bandá bamemamaki na boombo. (Ezra 1:1-4) Nsukansuka, Babilone ekómaki “esika oyo etikali mpamba”​—yango emonisi lisusu ete bisakweli ya Biblia ezali solo.

LISOLO YANGO ETALI YO NA NINI?

Tókanisa naino: Biblia esakolaki (1) Bayuda bakosala mbula 70 na boombo, (2) ndenge oyo Siruse akokweisa Babilone mpe mayele oyo akosalela, mpe (3) Babilone ekotikala mpamba mpo na libela. Moto moko te akokaki koyeba makambo ya ndenge wana liboso! Na yango, ebongi mpenza tóloba ete: “Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe.” (2 Petro 1:21) Ya solo, ebongi mpenza tózwaka Biblia na valɛrɛ mingi.

MWA MAKAMBO ETALI SIRUSE

  • Bato bakanisaka ete Siruse abotamaki soki na mobu 600 liboso ya ntango na biso mpe akufaki na etumba moko na mobu soki 530 liboso ya ntango na biso.

  • Tii lelo lilita ya Siruse ezali na Pasargades, engumba moko ya kala ya Perse oyo Siruse asalaká mpe oyo ezwami lelo na esika oyo bakundolaka biloko ya kala na ekólo Iran.

  • Cylindre ya Siruse

    Makomi likoló ya mabele ya lima oyo babengaka Cylindre ya Siruse, oyo molai na yango ezali santimɛtrɛ 23, emonisaka ndenge Siruse azwaki Babilone mpe apesaki bakangami oyo bautaki bamboka mosusu bonsomi, ata mpe Bayuda. Balobaka ete Cylindre yango ezali “moko kati na biloko ya ntina mingi oyo etali Biblia, oyo bato ya arkeoloji bakundolá.”

  • Tii lelo, bato ya Perse bazwaka Siruse na valɛrɛ mingi.

“MAKOMI EZALI NA EFELO”

Na butu oyo Siruse abundisaki Babilone na mbalakaka, lobɔkɔ moko ebimaki na efelo na ndenge ya likamwisi ntango Beleshazare mokonzi ya Babilone ná “bato minene na ye nkóto moko (1 000) bazalaki kosala fɛti.” Na miso ya bato nyonso, lobɔkɔ yango ekomaki “MENE, MENE, TEKELE mpe PARASINE” na mpɛmbɛ oyo bapakolá na efelo ya ndako.a​—Danyele 5:1, 5, 25.

Mosakoli Danyele alimbolaki maloba yango epai ya Beleshazare oyo azalaki kobanga. Na mokuse, Danyele ayebisaki mokonzi ete bokonzi na ye ‘esuki’ mpe ‘batye ye na kilo’ mpe bamoni ete akoki te, mpe Babilone ‘epesami epai ya Bamede ná Baperse.’ (Danyele 5:26-28) Maloba yango nyonso ekokisamaki. Longola yango, tii lelo oyo, na minɔkɔ mosusu, maloba “makomi ezali na efelo” elimbolaka ete likama to likambo moko ya mabe elingi kosalema.

a Maloba yango emonisaka motángo ya mbongo ya ebende. Mpo na koyeba ndimbola mosusu, talá mokapo 7 ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto