Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 2/14 nk. 4-5
  • Misala ya bilimo mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Misala ya bilimo mabe
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koluka kosolola na bakufi ezali mabe?
  • Bakufi bakoki nde kosalisa bato ya bomoi to kosala bango mabe?
  • Na bantango mosusu baoyo basololaka na bilimo balobaka mpe makambo ya solo?
  • Bakufi bakoki kosalisa bato ya bomoi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Basololaka mpenza na bakufi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Elikya nini ezali mpo na bato oyo bakufá?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Misala ya bilimo mabe
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 2/14 nk. 4-5
Nganga-nkisi azali kotala na kati ya boule de cristal

BIBLIA ELOBI NINI?

Misala ya bilimo mabe

Koluka kosolola na bakufi ezali mabe?

“Bóbaluka te mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo . . . noki bákómisa bino mbindo.”​—Balevi 19:31.

OYO BATO BALOBAKA

Ezali solo ete bato balingaka koyeba mpenza soki bandeko na bango oyo bakufá bazali na kimya. Yango wana balobaka boye: “Mabe ezali wapi soki tokei epai ya bato oyo basololaka na bilimo to banganga-nkisi mpo básalisa biso tósolola na bango? Mbala mosusu bato oyo basololaka na bilimo bakoyebisa biso likambo moko oyo ekokitisa biso mitema.”

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobeli polele likambo ya koluka kosolola na bakufi; likambo oyo ezalaki kosalema mingi na ntango ya kala. Na ndakisa, Mobeko oyo Yehova Nzambe apesaki Bayisraele elobaki boye: “Epai na yo moto azwama te oyo azali . . . kotuna moto oyo asololaka na bilimo to . . . oyo azali kotuna bakufi. Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná.” (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Biblia elobi mpe ete baoyo basalaka misala ya bilimo mabe ata ya lolenge nini, “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—Bagalatia 5:19-21.

Bakufi bakoki nde kosalisa bato ya bomoi to kosala bango mabe?

“Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.”​—Mosakoli 9:5.

OYO BATO BALOBAKA

Bato mingi balobaka ete bakufi bazalaka na bomoi na lolenge moko boye. Na yango, balukaka kosolola na bango, ntango mosusu mpo na kozwa bansango to kokitisa bango mitema mpo básala bango mabe te.

OYO BIBLIA ELOBI

“Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te . . . Bolingo na bango ná koyina na bango ná zuwa na bango [nyonso oyo bazalaki na yango ntango bazalaki na bomoi] esili.” (Mosakoli 9:5, 6) Biblia eteyaka mpenza ete bakufi​—bakufaka mpenza! Bakanisaka te, basalaka eloko te mpe basambelaka Nzambe te. Nzembo 115:17 elobi ete: “Bakufi basanzolaka [Nzambe] te; ezala mpe moto nyonso oyo azali kokita na esika ya kimya ya liwa.”

Na bantango mosusu baoyo basololaka na bilimo balobaka mpe makambo ya solo?

“[Bato] basengeli nde kotunela bato ya bomoi makambo epai na bakufi?”​—Yisaya 8:19.

OYO BATO BALOBAKA

Bamosusu balobaka ete bato oyo basololaka na bilimo bakoki koyebisa bango makambo oyo kaka bakufi mpe bato ya libota to baninga na bango nde bakoki koyeba.

OYO BIBLIA ELOBI

Mokanda ya 1 Samwele mokapo 28 elobeli ndenge mokonzi moko oyo azalaki sembo te, na nkombo Saulo, abukaki mobeko ya Nzambe oyo epekisaki kotuna bato oyo basololaka na bilimo. Akendaki kokutana na mwasi moko oyo asololaka na bilimo, oyo emonanaki lokola ete asololaki na Samwele mosaleli moko ya Nzambe oyo akufá! Kasi, asololaki mpenza na Samwele? Te! Asololaki nde na mokosi moko; oyo azalaki komimonisa lokola nde azali Samwele oyo akufaki.

Mokosi yango ezalaki elimo mabe, mosali moko ya Satana “tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Mpo na nini bilimo mabe, to bademo, balukaka komonisa ete bakufi bakobaka kozala na bomoi? Mokano na bango ezalaka ya kobebisa lokumu ya Nzambe mpe ya Liloba na ye Biblia.​—2 Timote 3:16.

Makambo oyo touti kolobela emonisi nde ete elikya ezali te mpo na bakufi? Ezali bongo te! Biblia elaki ete na mikolo ezali koya, lisekwa ekozala mpo na baoyo bazali “na mpɔngi,” na kati ya nkunda.a (Yoane 11:11-13; Misala 24:15) Kasi sikoyo, toyebi ete bandeko na biso oyo bakufá bazali konyokwama te.

a Mokapo 7 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ezali na motó ya likambo oyo elobi “Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto