Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/14 lok. 16
  • Lipapu ya lipekapeka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lipapu ya lipekapeka
  • Lamuká!—2014
  • Masolo mosusu
  • Ndenge lipapu ya lipekapeka ebendaka pole
    Lamuká!—2014
  • Ndenge lipekapeka oyo babengi piéride du chou etɛlɛmisaka mapapu na yango lokola lɛtrɛ V
    Ebimá kaka yango moko?
  • Mateya ya Biblia mpo na bana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Liteya 1
    Mateya ya Biblia mpo na bana
Lamuká!—2014
g 4/14 lok. 16
Lipekapeka babengi Morpho bleu

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Lipapu ya lipekapeka

MAPAPU ya lipekapeka ezalaka pɛtɛpɛtɛ, yango wana soki kutu ata mwa litangá moke ya mai to mwa salite ekwei likoló na yango, lipekapeka ekokoka te kopumbwa malamu. Atako bongo, mapapu na yango ezalaka ntango nyonso pɛto mpe ya kokauka. Sekele na yango ezali nini?

Mwa biloko ya mikemike (écailles) oyo elekáleká moko likoló ya mosusu na lipapu ya lipekapeka

Lipapu ya lipekapeka ezali na mwa biloko ya mikemike (écailles) oyo elekáleká moko likoló ya mosusu

Tókanisa naino: Bato ya mayele na iniversite moko ya etúká ya Ohio oyo bayekolaki lipekapeka babengi morpho bleu (Morpho didius), bamonaki ete ata soki mapapu ya lipekapeka emonanaka pɛtɛpɛtɛ na miso, kasi ezali na mwa biloko ya mikemike (écailles) oyo elekáleká moko likoló ya mosusu. Likoló ya mwa biloko yango, tokoki komona mwa mikɔlɔtɔ oyo esalaka ete salite to mai ekwea mbala moko. Bato ya mayele bazali koyekola ndenge mapapu ya lipekapeka esalemá mpo na kosala biloko ndenge na ndenge oyo ekoki kobatela bamasini ya bakompanyi mpe baaparɛyi oyo minganga basalelaka mpo salite to mai ebebisa yango te.

Ndenge lipapu ya lipekapeka ekelamá, ezali likambo mosusu oyo emonisi polele ndenge bato ya mayele bazali komekola biloko oyo ezalisamá. Moto moko ya mayele na nkombo Bharat Bhushan alobi boye: “Soki totali ndenge biloko ezalisamá, kobanda na oyo ya mike mpenza tii na oyo ya minene, tokoki komona ete ezalisamá na moto moko ya mayele mingi; yango nde bato balandaka na boumeli ya bambula mingi.”

Okanisi nini? Lipapu ya lipekapeka ebimá kaka yango moko, to basalaki yango kosala?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto