Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/14 lok. 16
  • Lokolo ya mpunda

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lokolo ya mpunda
  • Lamuká!—2014
  • Masolo mosusu
  • Mpunda minei ezali kopota mbangu
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Lamuká!—2014
g 10/14 lok. 16
Bampunda ezali kopota mbangu

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Lokolo ya mpunda

MPUNDA ekoki kopota mbangu na vitɛsi ya kilomɛtrɛ 50 na ngonga moko. Atako yango esɛngaka mosala makasi, emonani ete mpunda ebimisaka nguya mingi te. Na ndenge nini? Sekele ebombani na makolo na yango.

Tótala naino oyo esalemaka ntango mpunda ezali kopota mbangu. Na katikati ya misuni ná mokuwa ya lokolo na yango ezali na mosisa ya monene oyo ebendanaka mpe ebendaka nguya ntango lokolo ya mpunda ezali konyata mabele, edendaka lokola ressort, ezongiselaka lokolo nguya yango mpe esalaka ete mpunda ekende liboso.

Longola yango, ntango mpunda ezali kopota mbangu, makolo na yango eninganaka makasi na ndenge oyo ekoki kozokisa misisa yango. Kasi, misuni ya makolo na yango ebatelaka misisa yango mpo ezoka te. Bato ya mayele balobi ete lokolo ya mpunda ebongisamá na ndenge ya kokamwa mpenza na boye ete epesaka yango likoki ya kopota mbangu na pɛtɛɛ nyonso mpe na nguya.

Ba-ingénieur bazali koluka kosala barobo ya makolo minei oyo makolo na yango ekozala lokola oyo ya mpunda. Kasi, laboratware ya Massachusetts Institute of Technology oyo esalaka barobo emonisi ete makambo ndenge na ndenge oyo ezali na lokolo ya mpunda esali ete ezala pɛtɛɛ te komekola yango na bisaleli mpe boyebi oyo bazali na yango.

Okanisi nini? Ndenge oyo lokolo ya mpunda ezalaka ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto