Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/15 lok. 16
  • Makambo etali mangomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo etali mangomba
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokili
  • Angleterre
  • Australie
  • Ndenge nini nakoki koyeba lingomba ya solo?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mangomba nyonso mazali malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mangomba ekómi kotikala mpamba?
    Lamuká!—2015
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 1/15 lok. 16
Nsɔngɛ ya ndako-nzambe

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali mangomba

Mangomba nde esengelaki kosangisa bato. Kasi mbala mingi, yango nde ebimisaka matata mpe esalaka ete bato bázanga kotyelana motema.

Mokili

Bakati mabele na biteni misato na karte

Na mokili mobimba bato ebele mpenza (75%) bafandaka na bikólo oyo epekisá bato kosala makambo mingi ya mangomba na bango mpo na mibeko ya mboka to mpo na koyinana ya mangomba. Na bambula mitano oyo euti koleka, motángo ya bikólo oyo enyokolaka mangomba ya mike ebakisamaki mbala mibale.

OMITUNA BOYE: Mpo na bantina nini ekeseni bato mosusu balingaka mangomba te?​—Matai 23:27, 28; Yoane 15:19.

Angleterre

Tony Blair, ministre-mokonzi ya kala, akomaki na zulunalo moko (Observer) ete “makambo mabe ya mangomba” nde etindaki bato na misala ya terorisme oyo euti kosalama mikolo oyo. Abakisaki ete “bitumba ya siɛklɛ oyo euti mpenza te na makambo mabe ya bato ya politiki, ndenge ezalaki na siɛklɛ ya 20; kasi, bakokaki kosilisa bitumba yango soki basali makasi básilisa bokeseni ya mangomba mpe oyo etali mimeseno ya bato.”

OMITUNA BOYE: Mpo na nini mbala mingi mangomba nde ekabolaka bato?​—Marko 7:6-8.

Australie

Balongoli moto moko mpe bato mosusu minei batomboli mabɔkɔ na bango

Biro ya Australie oyo esalaka baankɛtɛ elobi ete soki ozwi bato 5 ya ekólo Australie, moto moko akoloba ete azali mondimi ata ya lingomba moko te. Biro yango ebakisi boye: “Kozala mondimi ya lingomba moko boye ekeseni na kosala mpenza makambo oyo lingomba yango esɛngaka.” Kaka mibali moke (15%) mpe basi moke (22%) oyo bazali bandimi ya lingomba moko boye nde balobi ete bamipesaka mpenza na makambo ya mangomba na bango.

OMITUNA BOYE: Makambo nini ya mabe emonanaka polele na mangomba mingi lelo oyo?​—Matai 7:15-20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto