Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/15 lok. 7
  • Okoki kozala na bokonzi likoló ya bomoi na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozala na bokonzi likoló ya bomoi na yo?
  • Lamuká!—2015
  • Masolo mosusu
  • Mokakatano: Makambo oyo tokoki kobongola te
    Lamuká!—2015
  • Mokakatano: Komiyoka mabe
    Lamuká!—2015
  • Osí omituna?
    Lamuká!—2019
  • Okokɔta na mokili ya sika?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 7/15 lok. 7

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OZALI NA BOKONZI LIKOLÓ YA BOMOI NA YO?

Okoki kozala na bokonzi likoló ya bomoi na yo?

Moto oyo azali kolúka bwato na ye na kimya nyonso

LELO oyo, moto moko te akanaka kokutana na makambo oyo akutanaka na yango. Mbala mingi, sekele ya kozala na bokonzi likoló ya makambo oyo tokutanaka na yango ezali ya kondima makambo yango mpe kosala nyonso oyo tokoki na kotalela bandelo oyo yango etyeli biso. Soki ozali na likoki ya kozala na mwa bokonzi likoló ya bomoi na yo atako okutani na makambo oyo olingaki te, ezali malamu. Soki nsukansuka makambo yango ebongi, yango ezali malamu mingi. Kasi, makambo ya malamu koleka ezali mpo na mikolo ezali koya.

Biblia elobeli ntango oyo bato nyonso bakomitungisa lisusu te mpo na bomoi na bango. Bakozala mpenza na likoki ya kosalela makoki na bango nyonso, makambo ya kobangisa bango, mitungisi ya mokolo na mokolo ekozala lisusu te mpe bakomiyoka mabe lisusu te. (Yisaya 65:21, 22) Biblia elobeli yango lokola “bomoi ya solosolo.”​—1 Timote 6:19.

“Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. Mpo mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete; mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.”​—Yisaya 65:21, 22.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto