Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/15 nk. 14-15
  • Oyo osengeli koyeba mpo na malaria

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo osengeli koyeba mpo na malaria
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • 1 MALARIA EZALI NINI?
  • 2 NDENGE NINI MALARIA EPALANGANAKA?
  • 3 NDENGE NINI OKOKI KOMIBATELA?
  • Mpo na nini ezongaki lisusu?
    Lamuká!—2004
  • Bamaladi oyo eutaka na nyama-nkɛkɛ—Likama ezali se koya monene
    Lamuká!—2004
Lamuká!—2015
g 7/15 nk. 14-15

Oyo osengeli koyeba mpo na malaria

OMS emonisi ete na 2013, bato koleka milio 198 babɛlaki malaria mpe ebomaki bato soki 584 000. Na bato soki 5 oyo babɛlaki malaria, 4 ezalaki bana oyo bakokisi naino mbula mitano te. Na mokili mobimba, maladi yango ezali likama mpo na bikólo mpe bateritware mingi; ezali kotya bato soki miliare misato na milio mibale na likama.

1 MALARIA EZALI NINI?

Malaria ezali maladi oyo moto azwaka soki mwa nyama moko eswi ye. Eyebanaka na bilembo lokola fiɛvrɛ, kolɛnga, kotɔka, motó mpasi, nzoto mpasi, mposa ya kosanza mpe kosanza. Bilembo yango ekoki kozonga nsima ya mikolo mibale to misato nyonso, na kotalela lolenge ya mwa nyama oyo eswi moto mpe ntango boni moto azwi maladi yango.

2 NDENGE NINI MALARIA EPALANGANAKA?

Etanda oyo emonisi ndenge oyo mikrobe ya malaria epalanganaka na nzoto ya moto
  1. Mikrobe oyo epesaka malaria; oyo babengi yango plasmodium, ekɔtaka na nzoto ya moto na makila soki ngungi ya mwasi oyo babengaka anophèle eswi moto.

  2. Mikrobe yango ekɔtaka na baselile ya libale (foie) ya moto oyo azwi yango mpe ekómaka ebele.

  3. Ntango baselile yango ekabwani, ebimisaka bamikrobe yango mpe na nsima epalanganaka na baselile ya makila ya moto oyo azwi yango. Bamikrobe yango ekobaka kobakisama kuna.

  4. Ntango baselile ya makila ekabwanaka, ebimisaka bamikrobe yango oyo ekobaka kokɔtela baselile mosusu mingi ya makila.

  5. Baselile ya makila ekobaka kokabwana mpe mikrobe yango ekobaka kokɔtela yango. Moto oyo azwi mikrobe yango amonisaka bilembo ya malaria mbala nyonso oyo baselile ya makila ekabwanaka.

3 NDENGE NINI OKOKI KOMIBATELA?

Soki ofandaka esika oyo malaria ezalaka mingi . . .

  • Salelá mustikɛrɛ. Esengeli ezala

    • oyo batyá nkisi oyo ebomaka banyama mikemike.

    • oyo ezangá lidusu to epasuká te.

    • oyo ekokɔta malamumalamu na nse ya matela.

  • Tyá nkisi oyo ebomaka bangungi na ndako.

  • Soki mwaye ezali, tyá bavitre na bafɛnɛtrɛ mpe baporte mpe salelá baaparɛyi oyo etyaka mopɛpɛ to malili na ndako, yango ekoki kobengana bangungi.

  • Latá bilamba ya langi ya mpɛmbɛ oyo ezipi nzoto mobimba.

  • Soki likoki ezali, boyá bisika oyo matiti ezalaka mingi mpe oyo mai etɛlɛmaka mpo bangungi ebotaka mingi wana.

  • Soki ozwi malaria, luká nokinoki lisalisi ya monganga.

Soki olingi kosala mobembo esika oyo malaria ezalaka mingi . . .

Ndenge ngungi mpe moto batambwisaka mikrobe ya malaria

Moto akoki kozwa mikrobe ya malaria soki ngungi oyo ezali na mikrobe yango eswi ye. Ndenge moko mpe, ngungi oyo ezali na mikrobe yango te ekoki kozwa yango soki eswi moto oyo azali na mikrobe yango. Na nsima, ngungi oyo ezwi mikrobe yango ekoki kolekisa yango epai ya moto mosusu

  • Luká koyeba makambo nyonso liboso ya kosala mobembo. Lolenge ya mikrobe oyo epesaka malaria ezalaka ndenge moko te na bisika nyonso mpe yango ekoki kosala ete nkisi boye to boye esimba to te. Lisusu, ekozala malamu osolola ná monganga na yo mpo na makambo oyo osengeli koyeba, oyo etali sante na yo.

  • Na boumeli ya mobembo na yo, landá batoli oyo ezali na lisolo oyo, oyo etali baoyo bafandaka esika malaria ezalaka mingi.

  • Soki ozwi malaria, luká nokinoki lisalisi ya monganga. Yebá ete bilembo ya malaria ekoki komonana nsima ya pɔsɔ moko to minei nsima ya kozwa mikrobe yango.

OYO OKOKI LISUSU KOSALA

  1. Salelá programɛ oyo guvɛrnema etyá mpo na makambo ya sante.

  2. Sombá bankisi kaka na esika oyo bazali na ndingisa ya kotɛka. (Soki nkisi ezali malamu te to ya monyato, ekoki koumisa maladi to kobakisa likama ya liwa.)

  3. Longolá eloko nyonso oyo ekoki kobenda bangungi penepene ya ndako.

Soki ofandaka na esika oyo malaria ezalaka to ozalaki na esika moko ya ndenge wana, kokanga miso te na bilembo oyo ya malaria . . .

  • Nzoto mɔtɔ makasi (fiɛvrɛ)

  • Mitoki

  • Kolɛnga na malili

  • Motó mpasi

  • Misuni ya nzoto mpasimpasi

  • Nzoto kolɛmba

  • Mposa ya kosanza

  • Kosanza

  • Pulupulu

Malaria oyo ezwi nkisi te ekoki kosilisa moto makila mpe kotya nokinoki bomoi na ye na likama. Luká nokinoki lisalisi ya monganga liboso ete bilembo yango eya makasi, mingimingi epai ya bana mpe basi ya zemi.a

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Lamuká! ya 11/2011, nkasa 24-25 na lifalanse mpe ya 04/2010, nkasa 22-25.

OYEBAKI YANGO?

Batye montre na kati ya Afrika

Kaka na Afrika, mwana moko akufaka na malaria na miniti nyonso

  • Bana mike mpe basi ya zemi bazalaka na likama mingi soki babɛli malaria.

  • Kaka na Afrika, mwana moko akufaka na malaria na miniti nyonso.

  • Bato bazwaka malaria mpenza te na nzela ya kozongisa makila.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto