Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g17 No. 4 lok. 16
  • Langi makasi ya bleu ya mbuma ya Pollia condensata

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Langi makasi ya bleu ya mbuma ya Pollia condensata
  • Lamuká!—2017
  • Masolo mosusu
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2017
  • Ndenge oyo bazalaki kosala balangi mpe bilamba na ntango ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Oyokaka ndenge nini soki omoni langi moko boye?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Lamuká!—2017
g17 No. 4 lok. 16
Mbuma ya Pollia condensata

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Langi makasi ya bleu ya mbuma ya Pollia condensata

MWA mbuma ya nzete babengi Pollia condensata, oyo ezalaka na Afrika, ezali na langi makasi ya bleu koleka bambuma ya nzete mosusu nyonso. Kasi, ezalaka te na eloko oyo ebimisaka langi ya bleu. Bongo nini esalaka ete ezala na langi ya bleu makasi bongo?

Kanisá naino: Mposo ya mbuma yango ezalaka na bansinga mikemike oyo ebongisami malamu lokola banzete na alimɛti. Bansinga yango esalaka maboke, oyo mokomoko ekabwanaka mwa moke na mosusu oyo ezali na nse na yango, mpe oyo ezali kobakisama likoló ekómaka lokola nyokanyoka. Nsinga yango mokomoko ezalaka na langi ya bleu te. Langi yango ebimaka ntango bansinga yango esanganaka. Na yango, ndenge bansinga yango ebongisamaka nde esalaka ete mbuma yango ezala na langi ya makasi, oyo engalaka mpenza. Mposo na yango emonanaka na langi ya bleu. Kasi soki otali yango ngámbo na ngámbo, bambuma yango mosusu ebimisaka langi ya mai ya mpondu, ya rozɛ to ya mwa mosaka mpo langi ya bansinga yango ebongwanaka. Kasi, soki otali mbuma yango pene, okomona ete ezali sɛlisɛli te mpe ezali komonana lokola balangi ebele oyo esangani, ndenge écran ya ordinatɛrɛ emonanaka.

Atako mbuma ya Pollia condensata ezalaka te na eloko oyo ebimisaka langi, ekobaka kozala na langi na yango ata soki ekwei na mabele. Kutu, bambuma yango mosusu oyo babukaki eleki sikoyo siɛklɛ moko ezali kaka na langi na yango ya makasi! Bato ya mayele balobi ete, atako bambuma yango ezalaka na mosuni te, ezalaka kaka na mwa bambuma ya mikemike, ebendaka bandɛkɛ.

Bato ya siansi balobi ete lokola mbuma ya Pollia condensata ezalaka te na eloko oyo ebimisaka langi, yango ekoki kosalisa bango bábimisa papye moko oyo bato ya mabe bakoki komekola yango te.

Okanisi nini? Langi ya bleu makasi, oyo engɛngaka, ya mbuma ya Pollia condensata ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto