Kosala mosala makasi ezali lokola kosala ngalasisi, ekomemela yo matomba sikoyo mpe na mikolo ekoya
MPO NA BILENGE
11 Kolinga mosala
YANGO ELIMBOLI NINI?
Bato oyo balingá mosala baboyaka mosala te. Kutu, basepelaka nde kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa na bango moko mpe kosalisa basusu, ata soki bato mosusu bazwaka mosala ya ndenge wana na valɛrɛ te.
MPO NA NINI EZALI NA NTINA?
Olinga, olinga te, bomoi ekosɛnga yo omema mikumba. Na mokili ya lelo, oyo bato mingi balingaka kosala mosala makasi te, soki ozali moto oyo alingá mosala, yango ekomemela yo bolamu.—Mosakoli 3:13.
“Sikoyo, namoni ete soki ozali kosala mosala makasi, okoyoka esengo makasi na motema. Esengo oyo nayokaka etindaka ngai nasepela lisusu mingi na mosala. Soki oyebani ete ozali moto oyo alingaka mosala, bato bakobanda kokumisa yo.”—Reyon.
TOLI YA BIBLIA: “Na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka.”—Masese 14:23.
OYO OKOKI KOSALA
Makambo oyo elandi ekosalisa yo okóma kotalela mosala na ndenge ya malamu.
Yoká esengo oyo eutaka na kosala makambo malamumalamu. Ezala ozali kosala misala ya ndako, kosala devuare, to kosala mosala mpo na kozwa mbongo, mipesá mpenza na likambo oyo ozali kosala. Ata soki okómi kosala yango malamu, luká ndenge ya kobongisa lisusu, elingi koloba kosala yango nokinoki mpe malamu koleka. Soki ozali kobongisa ndenge na yo ya kosala mosala, okosepela na yango mingi.
TOLI YA BIBLIA: “Omoni moto oyo azali na mayele na mosala na ye? Ezali liboso ya bakonzi nde akotɛlɛma; akotɛlɛma liboso ya bato mpamba te.”—Masese 22:29.
Kotala kaka bolamu na yo moko te. Mbala mingi, soki ozali kokokisa mosala na yo malamu, basusu bakozwela yango matomba. Na ndakisa, soki oboyaka te kopesa mabɔkɔ na misala ya ndako, ekosalisa mpe bandeko na yo bázala na mosala koleka ndelo te.
TOLI YA BIBLIA: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”—Misala 20:35.
Salá koleka oyo basɛngi yo. Na esika osala kaka oyo bayebisi yo osala, luká nde kosala mingi koleka. Na ndenge yango, okomonisa ete ozali kosala makambo mpo motema na yo ezali kosepela, kasi te mpo bazali kotinda yo.—Matai 5:41.
TOLI YA BIBLIA: “Malamu na yo ezala ya kotindikama te, kasi euta na motema na yo.”—Filemo 14.
Kolekisa ndelo te. Moto oyo alingá mosala azalaka gɔigɔi te, azalaka mpe moombo ya mosala te. Alekisaka ndelo te; asepelaka kosala mosala makasi, asepelaka mpe kopema.
TOLI YA BIBLIA: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”—Mosakoli 4:6.