Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g19 No. 2 nk. 10-11
  • Koyeba kotambwisa makambo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyeba kotambwisa makambo
  • Lamuká!—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO ESƐNGI NINI?
  • MPO NA NINI KOYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO EZALI NA NTINA?
  • NDENGE YA KOTEYA BANA BÁYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO
  • Ntina ya kosala misala ya ndako
    Lamuká!—2017
  • Koyeba kobongisa bana bákóma mikóló mpo bákende malamu
    Lamuká!—1998
  • 8 Kozala ndakisa
    Lamuká!—2018
  • Biblia ekoki kosalisa yo na kobɔkɔla bana?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Lamuká!—2019
g19 No. 2 nk. 10-11
Tata moko azali kosalisa mwana na ye abwakela nzete mai

LITEYA 4

Koyeba kotambwisa makambo

KOYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO ESƐNGI NINI?

Moto oyo ayebi kotambwisa makambo malamu azali moto oyo batyelaka motema. Ntango basɛngi ye asala eloko moko, asalaka yango malamu mpe na ntango oyo ebongi.

Bana bakoki koyekola kotambwisa makambo malamu ata ntango bazali naino mike. Buku moko (Parenting Without Borders) elobi: “Kobanda ntango mwana akómi na sanza 15, akómaka kosala makambo oyo baboti bayebisi ye asala, mpe ntango akómi na sanza ya 18, alingaka kosala makambo nyonso oyo baboti na ye bazali kosala. Na bamboka mingi, baboti basalisaka bana bákolisa makoki na bango mingimingi ntango bakómi na mbula 5 to 7, mpe bana ya mbula wana basalisaka baboti na misala ndenge na ndenge ya ndako.”

MPO NA NINI KOYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO EZALI NA NTINA?

Na bisika mingi, bilenge balongwaka na ndako ya baboti na bango mpo na kofanda bango moko, kasi bakutanaka na mikakatano, mpe bazongaka na ndako ya baboti na bango. Mbala mosusu, likambo yango ekómelaka bilenge mpo baboti balakisaki bango te ndenge ya kosalela mbongo, kotambwisa makambo na ndako, to makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo.

Yango wana, ezali malamu oteya mwana ntango azali naino moke mpo ayeba kotambwisa makambo ntango akokóma mokóló. Buku moko (How to raise an adult) elobi: “Ezali malamu te kotika mwana atalelaka kaka yo tii ntango akokóma na mbula 18 mpe na nsima otika ye akende.”

NDENGE YA KOTEYA BANA BÁYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO

Pesáká bango mwa misala ya ndako.

TOLI YA BIBLIA: “Na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka”​—Masese 14:23.

Bana basepelaka kosala elongo na baboti na bango. Okoki kosalela mposa wana mpe kopesa bango mwa misala ya ndako.

Baboti mosusu balingaka kosala yango te. Bamonaka ete bana oyo bakendaka kelasi bazalaka na badevuare mokolo na mokolo, mpe kopesa bango misala ya ndako ezali kobakisela bango mikumba.

Kasi, bana mingi oyo basalaka misala ya ndako batángaka malamu na kelasi, mpo misala ya ndako esalisaka bango bándima mikumba mosusu mpe básilisa misala oyo bapesi bango. Longola yango, buku moko (Parenting Without Borders) elobi: “Soki tozali kosalela te mposa oyo bana bazalaka na yango ya kosala misala, bakokanisa ete kosalisa basusu ezali na ntina te . . . Bakobanda mpe kozela kaka ete basusu básalela bango.”

Ndenge maloba wana emonisi yango, misala ya ndako eteyaka bana báyeba kosalisa mpe kokabela basusu. Misala ya ndako esalisaka bana bámona ete bazali na ntina na kati ya libota mpe ete basengeli kosalisa.

Salisá mwana andima mokumba na ye ntango asali mabe.

TOLI YA BIBLIA: “Yoká toli mpe ndimá disiplini, mpo ozala na bwanya na bomoi na yo na mikolo oyo ezali koya.”​—Masese 19:20.

Ntango mwana na yo asali likambo moko ya mabe, na ndakisa abebisi eloko ya moto ata na nko te, kobomba te mabe oyo asali. Salisá mwana andima mokumba na ye na likambo oyo asali, na ndakisa, akende kosɛnga bolimbisi mpe mbala mosusu afuta eloko oyo abebisaki.

Soki bana bayekoli kondima mokumba na bango ntango basali mabe, ekoteya bango

  • báloba solo mpe bándima mabunga na bango

  • bápesa basusu foti te

  • báboya komilongisa

  • básɛnga bolimbisi, ntango esengeli

Tata moko azali kosalisa mwana na ye abwakela nzete mai

BANDA KOTEYA YE SIKOYO

Bana oyo bayekoli ndenge ya kotambwisa makambo bakoyeba kotambwisa bomoi na bango ntango bakokóma mikóló

Ndakisa na yo nde eteya

  • Nazalaka makasi na mosala, nabongisaka makambo malamu, mpe natosaka ngonga?

  • Bana na ngai bamonaka ete nasalaka misala ya ndako?

  • Nandimaka mabe oyo nasali, mpe nasɛngaka bolimbisi soki esengeli?

Makambo oyo baboti mosusu balobi

“Banda ntango bana bazalaki naino mike, bazalaki kosalisa ngai ntango nazali kolamba. Ntango nazali kogumba bilamba, bazalaki mpe kosalisa ngai. Ntango nazali kotya bopɛto na ndako, bango mpe bazalaki kosala yango. Bakómaki kosepela kosala mosala. Bakómaki na esengo ya kosala mosala nyonso oyo ngai nazalaki kosala. Yango nde esalisaki bango báyekola kokóma bato oyo batambwisaka makambo malamu.”​—Laura.

“Mokolo moko, nayebisaki mwana na biso ya mobali abenga moninga na biso moko mpo asɛnga ye bolimbisi na ndenge azangaki limemya epai na ye. Na boumeli ya bambula, soki alobi na bato polele, kasi na ndenge ya malamu te azalaki kosɛnga bolimbisi; kasi lelo ayekolá kosɛnga mbala moko bolimbisi ntango asali libunga.”​—Debra.

BOLAMU YA KONDIMA MABUNGA

Molakisi moko na nkombo Jessica Lahey akomaki na zulunalo moko: “Bana basalaka mabunga mingi. Yango wana, baboti basengeli koyeba ete bana na bango bazwaka mateya na nzela ya mabunga na bango. Mbula na mbula, bana-kelasi na ngai oyo bazalaka mayele, na esengo mingi, mpe baoyo balongaka na bomoi, ezali baoyo oyo basalaki mabunga, mpe baboti na bango batikaki babuka mbuma ya mabunga na bango. Kasi basalisaki bango bazongela yango te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto