Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g20 No. 3 nk. 12-13
  • Zalá na bolingo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na bolingo
  • Lamuká!—2020
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokakatano
  • Toli ya Biblia
  • Oyo okoki kosala
  • Balongaki ezaleli ya kokanisela basusu mabe
    Lamuká!—2020
  • Okaniselaka baninga mabe?
    Lamuká!—2020
  • Nalingaki kosilisa kozanga bosembo
    Biblia ebongolaka bato
  • Kokanisela basusu mabe ekosila ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Lamuká!—2020
g20 No. 3 nk. 12-13
Mwasi moko ya Inde asimbi nkɔkɔ moko ya mondɛlɛ ntango bazali komata eskalye mpe amemeli ye sakosi ya biloko.

Zalá na bolingo

Mokakatano

Likanisi ya kokanisela bato mabe esilaka nokinoki te. Kaka ndenge esɛngaka ntango mpe milende mpo na kosilisa virus to maladi mabe moko boye, esɛngaka mpe ntango mpe milende mpo na kotika kokanisela basusu mabe. Okoki kosala nini mpo na kotika kokanisela baninga mabe na motema na yo?

Toli ya Biblia

Bililingi: 1. Moto moindo moko amemi kafe mpe moto moko ya Azia afungoleli ye porte. 2. Moto moindo yango azali kopesa baninga na ye ya mosala kafe, oyo na kati na bango ezali mpe na mwasi moko ya Inde..

“Bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—BAKOLOSE 3:14.

Elingi koloba nini? Kosalela bato makambo na boboto etindaka bato bálingana. Ntango ozali kolinga basusu mingi, okokanisela bango mabe ata moke te. Ntango okómi kolinga bato mingi, makanisi mabe ekolongwa na motema na yo.

Oyo okoki kosala

Bililingi: 1. Mwasi moko ya Inde asimbi nkɔkɔ moko ya mondɛlɛ ntango bazali komata eskalye mpe amemeli ye sakosi ya biloko.. 2. Nkɔkɔ yango ya mondɛlɛ amemeli moto ya Azia bisikiti.

Kanisá makambo oyo okoki kosala mpo na komonisa bolingo epai ya bato oyo bauti na mwa etuluku moko oyo mbala mosusu okaniselaka mabe. Makambo yango esengeli kozala ya mindɔndɔ te. Meká kosala boye:

Ntango ozali kosala makambo ya mikemike oyo ezali komonisa bolingo, okotika kokanisela basusu mabe

  • Soki moto ya mwa etuluku yango azali koluka adrɛsi, lakisá ye; ntango bozali na motuka, tikelá ye esika ya kofanda to fungolelá ye porte.

  • Meká kosolola na moko na bango atako ayebi monɔkɔ na bino malamumalamu te.

  • Zalá na motema molai ntango basali likambo oyo esepelisi yo te.

  • Mityá na esika na bango ntango bazali kolobela mikakatano na bango.

Makambo oyo esalemaki: Nazaré (Guinée-bissau)

“Kala, nazaláká te kolinga bapaya oyo bayá kofanda na mboka na biso. Bayebisá ngai ete bapaya mingi bakosaka guvɛrnema mpo apesa bango mbongo to asalisa bango, mpe mingi kati na bango bazali bato mabe. Yango wana nazalaki kosepela na bango te. Kasi nazalaki komona te ete nazalaki nde kokanisela basusu mabe, mpo bato mingi ya mboka na biso bazalaki kotalela bapaya kaka bongo.

“Na nsima, nayaki komona ete nazalaki nde kokanisela bapaya wana mabe. Batoli ya Biblia esalisaki ngai nalinga bato yango mingi. Sikoyo nayinaka bango lisusu te. Kutu, napesaka bango mbote mpe nasololaka na bango. Nalukaka koyeba mokomoko na bango. Sikoyo nakóma kosepela na bango, mpe nalingaka mpenza kofanda na bango.”

“Nalingaki kosilisa kozanga bosembo”

Rafika Morris.

Rafika akɔtaki na etuluku ya bato oyo batombokelaki Leta mpo bazalaki kosalela bato ya loposo na bango mabe. Kasi ntango akɔtaki na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova, amonaki ete bazali na bomoko, ezaleli oyo azalaki koluka.

Talá video Rafika Morris: Nalingaki kosilisa kozanga bosembo. Kɔtá na site jw.org mpo na kozwa video yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto