Mateya ya Nzambe epesaka biso elikya
Nzambe alaki ete makambo ya malamu mingi ekosalema na mikolo ezali koya. Akosilisa bampasi mpe akopesa bato bomoi ya malamu mingi awa na mabele. (Nzembo 37:11) Mpo na nini tosengeli kondima elaka yango? Mpo “Nzambe azali moto te mpo abuka lokuta.” (Mitángo 23:19) Tótala mwa makambo ya malamu oyo Nzambe akosala.
Nzambe akoboma bato mabe nyonso
“Ntango bato mabe bazali kobima lokola matiti mpe bato nyonso oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bazali kokola, ezali mpo básila nyɛɛ libela.”—NZEMBO 92:7.
Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, makambo ya mabe ezali se kobakisama. Yango ekoki kokamwisa biso te. Mpo Biblia esakolaki na 2 Timote 3:1-5 ete na “mikolo ya nsuka” bato bakokóma mabe na ndenge ya kosakana te. “Mikolo ya nsuka” ya nini? Ezali “mikolo ya nsuka” ya bato mabe oyo balingaka kotosa Nzambe te. Mosika te, Nzambe akoboma bato nyonso oyo baboyi kobongola bizaleli na bango. Na nsima, kaka bato malamu, elingi koloba, baoyo bazali kotosa Nzambe nde bakotikala. Biblia elobi ete: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”—Nzembo 37:29.
Nzambe akoboma Satana
“Nzambe oyo apesaka kimya akopanza Satana.”—BAROMA 16:20.
Ntango Satana ná bademo na ye ná bato mabe nyonso bakolongwa, mokili mobimba ekozala na kimya mpenza. Nzambe alaki ete: “Moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa [yo].”—Mika 4:4.
Nzambe akolongola maladi mpe liwa
“Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato . . . Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”—EMONISELI 21:3, 4.
Bampasi ná maladi ekosila mpo Nzambe akolongola mabe nyonso oyo euti na Satana, Adama ná Eva, mpe mabunga na biso moko. Mpe na ndenge yango, “liwa ekozala lisusu te.” Bato oyo balingaka Nzambe mpe batosaka ye bakozala na bomoi libela na libela. Kasi bakofanda wapi?
Nzambe akokómisa mabele Paradiso
“Esobe mpe etúká oyo ezangá mai ekosepela, mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.”—YISAYA 35:1.
Ntango Nzambe akolongola mabe, mabele mobimba ekokóma paradiso! Bilanga ya kitoko ekotonda na mabele mobimba, mpe biloko ya kolya ekozala beboo. (Nzembo 72:16) Mbu, laki, bibale ekokóma pɛto mpe ekotonda na mbisi ná nyama. Moto akobebisa mai, mopɛpɛ to mabele lisusu te! Bato bakofanda na bandako oyo bango moko batongi. Moto ata moko te akozanga ndako, akokufa nzala, to akozala mobola.—Yisaya 65:21, 22.
Nzambe akosekwisa bato oyo bakufá
“Lisekwa ekozala.”—MISALA 24:15.
Okolinga komona lisusu baninga ná bandeko na yo oyo bakufá? Nzambe oyo azali na nguya koleka banguya nyonso akozongisa bango na bomoi to akosekwisa bango, na Paradiso awa na mabele. Okoyeba bango, bango mpe bakoyeba yo. Kanisá naino esengo bokoyoka! Mpo na nini tosengeli kondima ete makambo yango ekosalema? Mpo Biblia ezali kopesa biso ndakisa ya bato, mikóló mpe bana, basekwaki mpe bazongaki na mabota na bango. Longola yango, Yesu mpe mbala na mbala asekwisaki bato na miso ya bato ebele.—Luka 8:49-56; Yoane 11:11-14, 38-44.