Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g21 No. 2 nk. 7-9
  • Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela bana na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela bana na yo?
  • Lamuká!—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • OYO OSENGELI KOYEBA
  • OYO OKOKI KOSALA
  • Bana mpe batelefone—Eteni 1: Mwana na ngai asengeli kozala na telefone?
    Lisalisi mpo na libota
  • Bana mpe batelefone—Eteni 2: Teyá bana ndenge malamu ya kosalela telefone
    Lisalisi mpo na libota
  • Osalelaka baaparɛyi ya mikolo oyo na mayele?
    Lamuká!—2015
  • Ndenge ya koteya mwana asalelaka Internet na mayele
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Lamuká!—2021
g21 No. 2 nk. 7-9

Mikakatano nini baaparɛyi ekoki kobimisela bana na yo?

Mikóló bazalaka na mokakatano ya koyeba kosalela baaparɛyi ná baprogramɛ na yango. Nzokande, ezali mpasi te mpo na bana mike, mpo ntango babotamaka bakutaka yango.

Kasi, emonani ete bilenge mingi bazali kolekisa ngonga mingi mpenza na Internet mpe ezali kotinda bango . . .

  • bákóma baombo ya baaparɛyi.

  • bákóma kotumola bato mpe koloba makambo ya mabe na Internet.

  • bátala pornografi, ezala balingi yango to te.

OYO OSENGELI KOYEBA

KOKÓMA MOOMBO YA BAAPARƐYI

Makambo mosusu oyo bato basalaka na Internet, na ndakisa, masano, ekómisaka bango baombo mpenza. Yango ebandaka na mbalakaka te. Buku moko (Reclaiming Conversation) elobi boye: “Baprogramɛ oyo ezali na batelefone na biso esalemá mpo soki moto abandi kosalela yango atika te.” Ntango tozali kotala mingi baprogramɛ ya makambo ya mombongo oyo ezali na telefone na biso, tozali kopesa bato oyo bazali kosala bapiblisite wana mbongo mingi.

KANISÁ NAINO: Bana na yo bamipesaka mingi mpenza na baaparɛyi na bango? Ndenge nini okoki kosalisa bango básalela ntango na bango malamu?​—BAEFESE 5:15, 16.

KOTUMOLA BATO NA INTERNET

Ntango bato mosusu bazali kosalela Internet, bakómaka na nkanda, batyaka likebi te na ndenge basusu bazali komiyoka, balobaka maloba ya mabe, to mpe bafingaka bato.

Bato mosusu bafingaka to balobaka maloba mabe na basite Internet ya kosolola na baninga mpo báyebana to mpo bato mosusu bátyela bango likebi. To moto mosusu akoki kosilika, kofinga to kokatela bato mangala kaka mpo fɛti moko esalemaki kasi babengisaki ye te.

KANISÁ NAINO: Bana na yo bafingaka bato na Internet? (Baefese 4:31) Bayokaka ndenge nini soki baninga basali likambo moko boye kasi babengisaki bango te?

PORNOGRAFI

Ezali mpasi te komona makambo ya mbindo na Internet. Baboti basengeli koyeba ete, atako baprogramɛ mosusu esalemá mpo elekisaka makambo ya mbindo te, mwa makambo mosusu elekaka kaka.

Na bisika mosusu mibeko epekisá kotindela moto bafɔtɔ to bamesaje oyo ezali na makambo ya mbindo. Ntango mosusu, na kotalela mibeko ya mboka, bana oyo batindelaka baninga na bango bana bililingi ya makambo ya mbindo to batalaka yango, na miso ya Leta bazali mpenza kobuka mobeko.

KANISÁ NAINO: Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bátindaka te bililingi ya makambo ya mbindo na Internet?​—BAEFESE 5:3, 4.

OYO OKOKI KOSALA

TEYÁ BANA NA YO

Atako bana ya lelo bayebi malamu kosalela baaparɛyi, esengeli kaka kopesa bango malako. Buku moko (Indistractable) elobi ete kopesa bana baaparɛyi mpo básalelaka, kozanga kolakisa bango lolenge malamu ya kosalela yango, ezali “lokola kotika bango bámibwaka na mai nzokande bayebi kobɛta mai ata moke te.”

VƐRSƐ: “Bɔkɔlá mwana mobali na kolanda nzela oyo esengeli mpo na ye; ata ntango akokóma mobange akopɛngwa na yango te.”​—MASESE 22:6.

Poná makanisi oyo okolinga kosalela, to komá makanisi na yo moko.

  • Nasolola na mwana na ngai mpo alobaka makambo mabe te na Internet

  • Nasalisa mwana na ngai asilikaka te soki babengisi ye te na fɛti moko to na likambo moko boye

  • Nasala nyonso oyo esengeli mpo mwana na ngai atalaka makambo ya mabe te na Internet

  • Natalaka telefone ya mwana na ngai mbala na mbala mpo nayeba makambo asalaka na aparɛyi na ye

  • Nakatela mwana na ngai ngonga oyo asengeli kolekisaka na Internet mokolo na mokolo

  • Napekisa mwana na ngai kosalela baaparɛyi na butu na ntango oyo asengeli kolala

  • Napekisa mwana na ngai kosalela baaparɛyi na ntango ya kolya

MITUNA OYO BABOTI BASENGELI KOTALELA

  • Topesaka mwana na biso telefone asakanaka na yango ntango biso tozali kosala misala mpo alela te?

  • Mwana na biso asengeli kozala na telefone oyo ekɔtaka na Internet? Mpo na nini asengeli kozala na yango?

  • Tozali na makoki ya kopesa mwana na biso telefone oyo ekɔtaka na Internet?

  • Mwana na biso asili komonisa ete ayebi komipekisa?

  • Makambo mwana na biso asalaka emonisaka ete ayebaka makambo ya mabe oyo asalaka mpe azalaka na mposa ya kobongisa yango?

  • Mibeko nini tokotya?

  • Ndenge nini tokoki kosalisa mwana na biso alekisaka ntango na ye nyonso te kaka na kosalela baaparɛyi?

    VƐRSƐ: “Bato oyo bakɔmɛlá . . . makoki na bango ya kosolola . . . emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.”​—BAEBRE 5:14.

“Mpo na nini bana na yo bazali na mposa ya kozala na telefone? Ndenge nini basalelaka oyo ya yo? Bakɔtaka na basite Internet nini? Babɛtaka masano ya ndenge nini? Baumelaka na masano yango ngonga boni? Luká naino koyeba makoki ya bana na yo mpe ezaleli na bango ya komipekisa liboso opesa bango telefone.”​—LAURETA, NÁ MOBALI NA YE, DAVID

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto