Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g21 No. 3 nk. 8-9
  • Makambo oyo bato ya siansi bakoki koyebisa biso te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo bato ya siansi bakoki koyebisa biso te
  • Lamuká!—2021
  • Masolo mosusu
  • Monganga moko oyo ayekolaka ndenge mwana asalamaka na libumu alobeli kondima na ye
    Lamuká!—2016
  • Ndenge oyo siansi ememelaka yo matomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mozalisi akoki kosala ete bomoi na yo ezala na ntina mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bomoi ebandá ndenge nini?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Lamuká!—2021
g21 No. 3 nk. 8-9
Molakisi moko ya siansi azali kosolola na bana-kelasi na ye.

Makambo oyo bato ya siansi bakoki koyebisa biso te

Emonani ete bato ya siansi bazali koyekola kaka eteni ya molɔ́ngɔ́ mokomoko oyo bamoná. Kasi ezali na mituna mingi ya ntina oyo bakoki kopesa biyano na yango te.

Bato ya siansi bakoki komonisa ndenge molɔ́ngɔ́ mpe bomoi ebandá? Na mokuse, bakoki te. Bamosusu balobaka ete siansi oyo babengi cosmologie ekoki kolimbola esika molɔ́ngɔ́ eutá. Kasi, profesɛrɛ moko, na nkombo Marcelo Gleiser, oyo ayekolaka minzoto na iniversite moko (Dartmouth College), mpe oyo andimaka ete ezali mpasi koyeba soki Nzambe azalaka to te, alobi boye: “Tolimbolá naino te esika molɔ́ngɔ́ eutá.”

Ndenge moko mpe, zulunalo moko (Science News) ekomaki boye mpo na esika bomoi eutá: “Ezali mpasi mpenza tómonisa na bosikisiki ndenge mabele ebandá: Mabanga ná biloko ya kalakala oyo ekokaki kolakisa mpenza ndenge mabele ezalaki na ebandeli ebungá kala mpenza.” Makambo nyonso oyo balobi emonisi ete siansi epesi naino eyano te na motuna oyo: Ndenge nini molɔ́ngɔ́ mpe bomoi ebandaki?

Kasi okoki komituna boye: ‘Soki basalaki bomoi na mabele, nani nde asalaki yango?’ Okoki mpe komituna mituna oyo elandi: ‘Soki Mozalisi moko ya bwanya mpe ya bolingo azali, mpo na nini atiki nzela ete bato bányokwamaka? Mpo na nini mangomba ndenge na ndenge etondi boye? Mpo na nini Nzambe azali kotika bato oyo basambelaka ye básalaka makambo ya mabe?’

Siansi ekoki kopesa biyano na mituna wana te. Kasi, yango emonisi te ete okoki te kozwa biyano na mituna yango. Na ntembe te, bato mingi basilá kozwa biyano ya malamu mpenza na mituna yango na Biblia.

Soki olingi koyeba mpo na nini bato mosusu ya siansi bazwaki ntango ya koyekola Biblia mpe na nsima bakóma kondima ete Mozalisi azali, kende na site Internet jw.org. Talá bavideo Makanisi na oyo etali ndenge bomoi ebandá.

Siansi mpe Biblia endimisi bango

Georgiy N. Koidan, moto moko ya mayele na makambo ya chimie

“Mosala na ngai esɛngaka ‘kosangisa’ bamolekile. Esengeli kobongisa makambo liboso mpenza. Soki nabosani likambo moko oyo nasengeli kosala, molekile yango ekoki kokufa. Atako mosala na ngai ezali mpasi, kasi ezali pɛtɛɛ mpenza soki tokokanisi yango na ebele ya misala ya makasimakasi oyo esalemaka na kati ya baselile mpo na kobimisa bamolekile. Yango ezali kotinda ngai nandima ete ezali na moto moko ya mayele mingi mpenza oyo ayebi chimie; ezali Mozalisi.

“Ntango nayekolaki Biblia, namonaki ete ezali lokola babuku mosusu te. Banda basilisá kokoma Biblia esali sikoyo mbula koleka 2 000, kasi toli na yango ezali kaka na ntina tii lelo. Toli oyo epesi mpo na kosilisa matata na libota, na mosala mpe ná bato oyo tofandaka na bango, ezali kaka kobimisa mbuma malamu. Nayei komona ete toli ya malamu boye ekoki kouta kaka epai ya moto moko ya mayele mingi mpenza.”

Yan-Der Hsuuw, monganga moko oyo ayekolaka ndenge mwana asalemaka na libumu

“Ntango mwana azali kokola na libumu ya mama na ye, baselile na ye nyonso esalaka na boyokani mpo mosusu ekóma selile ya misisa, ya misuni, ya mikuwa, ya makila, mpe ya biloko mosusu, oyo nsukansuka nyonso ekómaka moto. Tii sikoyo, tozali kaka koyeba te ndenge baselile ekómaka mwana. Ndenge nazali komona, bomoi esengeli kouta epai ya moto moko ya mayele.

“Ndenge Nzembo 139:15, 16, elobeli kokola ya mwana na libumu ya mama na ye ekokani na makambo oyo bato ya siansi bauti komona na bambula oyo euti koleka. Ndenge nini makambo ekoki kokomama na bosikisiki banda kala boye soki Mozalisi ayebisaka yango mokomi te?”

Talá video Rocío Picado Herrero : Un professeur de chimie parle de sa foi. Luká video oyo na jw.org.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto