Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g21 No. 3 nk. 10-13
  • Makambo oyo Biblia elobi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo Biblia elobi
  • Lamuká!—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Wapi makambo bato mosusu bakoselaka Biblia?
  • Ntango nini Nzambe abandaki kokela molɔ́ngɔ́?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lisolo ya bozalisi oyo bato mingi bayebaka te
    Lamuká!—2014
  • Ebandeli 1:1—“Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Bomoi ebandá ndenge nini?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2021
g21 No. 3 nk. 10-13

Makambo oyo Biblia elobi

“Oyo ezali lisolo ya makambo etali likoló mpe mabele na ntango oyo yango ezalisamaki.” (Ebandeli 2:4) Na maloba oyo, Biblia ezali komonisa na mokuse ndenge oyo mabele esalemaki. Makambo oyo Biblia elobi eyokani na makambo ya siansi? Tótalela mwa bandakisa.

Na ebandeli: Likoló ná mabele ezalisamaki

Molɔ́ngɔ́ ezalaka banda kala?

Ebandeli 1:1 elobi boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló ná mabele.”

Tii mwa moke liboso ya mobu 1950, bato ebele ya mayele bazalaki kondima ete molɔ́ngɔ́ ezalaka banda kala. Kasi, makambo oyo bato ya siansi bauti komona kala mingi te endimisi bango ete molɔ́ngɔ́ ezali mpenza na ebandeli.

Na ebandeli mabele ezalaki ndenge nini?

Ebandeli 1:2, 9 emonisi ete, na ntango ya kala, mabele ezalaki na “lolenge ata moke te mpe ezalaki mpamba,” etondaki na mai.

Bato ya mayele na mikolo na biso bandimi mpe makambo yango. Patrick Shih, moto ya mayele na makambo ya biologie, alobi ete ntango mabele ebandaki, ezalaki na “mopɛpɛ ya kopema te . . . mpe ezalaki na eloko te.” Zulunalo moko (Astronomy) elobi boye: “Makambo bauti komona emonisi ete, kala, mokili ezalaki maimai, bisika ya komona mabele mpenza boye ezalaki moke.”

Na ndenge nini mopɛpɛ ebongaki na nsima?

Ebandeli 1:3-5 emonisi ete ntango pole ekɔtaki mpo na mbala ya liboso na etando ya mabele, ezalaki mpasi koyeba esika oyo ezalaki kouta. Kaka na nsima nde, ekómaki komonana na mabele.​—Ebandeli 1:14-18.

Biblia elobi te ete biloko nyonso oyo ezali na bomoi awa na mabele esalemaki na mikolo motoba oyo mokomoko na yango eumelaka ngonga 24 mpamba

Boyekoli moko (The Smithsonian Environmental Research Center) elobi ete liboso, mopɛpɛ ezalaki kokómisa kaka mwa pole moke awa na mabele. Elobi boye: “Matangá ya mpema oyo babengi méthane ezipaki mabele mobimba lokola londende.” Na nsima, “londende ya méthane yango esilaki mpe likoló ekómaki komonana na langi ya bulé.”

Biloko nini esalemaki liboso na mabele?

1​—Mokolo ya liboso: Pole ebandaki kokɔta na mabele.​—Ebandeli 1:3-5

2​—Mokolo ya mibale: Londende mpe mai elataki mabele lokola elamba. Biloko yango mibale ekendaki moko na moko na esika na yango mpe ekabwanaki.​—Ebandeli 1:6-8

3​—Mokolo ya misato: Mai ekómaki moke mpe mokili ebandaki komonana.​—Ebandeli 1:9-13

4​—Mokolo ya minei: Sanza ná moi ekómi komonana na mabele.​—Ebandeli 1:14-19

5​—Mokolo ya mitano: Nzambe asali bikelamu ya mai mpe bandɛkɛ ya likoló na kolanda mitindo na yango mpo ebotanaka.​—Ebandeli 1:20-23

6​—Mokolo ya motoba: Banyama ya mokili, ya minene ná ya mike, esalemi. Mokolo ya motoba esukaki na kozalisama ya bato ya liboso.​—Ebandeli 1:24-31

Ebandeli 1:20-27 elobi ete ebandaki liboso na mbisi, na nsima bandɛkɛ, banyama ya mokili, mpe na nsuka bato basalemaki. Bato ya siansi balobaka ete mbisi ya liboso ebimá kala mpenza liboso banyama ebanda kobima, bongo bato bayaki kobima nde na nsuka mpenza.

Biblia elobi te ete eloko moko te ekoki kobongwana na boumeli ya ntango

“Mokanda ya Ebandeli mokapo 1 elobeli makambo mingi te, kasi likambo ya esengo ezali ete makambo oyo elobi ezali na boyokani mpenza na makambo oyo bato ya siansi bazali komona na mikolo oyo.”​—Gerald L. Schroeder, moto ya mayele na makambo ya physique.

Wapi makambo bato mosusu bakoselaka Biblia?

Bato mosusu balobaka ete makambo oyo bazali komona sikoyo eyokani te na oyo Biblia elobaka. Kasi, mbala mingi, balobaka bongo kaka mpo bayebi malamu te makambo oyo Biblia elobi.

Biblia elobi te ete molɔ́ngɔ́ to mabele ezali na mbula kaka 6 000 mpamba. Kasi, elobi na mokuse ete “na ebandeli” molɔ́ngɔ́ mpe mabele ezalisamaki. (Ebandeli 1:1) Biblia elobi na bosikisiki te na mbula nini molɔ́ngɔ́ mpe mabele esalemaki.

Biblia elobi te ete biloko nyonso oyo ezali na bomoi awa na mabele esalemaki na mikolo motoba oyo mokomoko na yango eumelaka ngonga 24 mpamba. Biblia esaleli liloba “mokolo” mpo na kolobela eleko. Na ndakisa, kozalisama ya mabele mpe bikelamu ya bomoi oyo ezali na kati, esalemaki na boumeli ya “mikolo” motoba ya bozalisi oyo Ebandeli mokapo 1 elobeli. Biblia ebengi eleko yango “mokolo oyo Yehovaa Nzambe asalaki mabele mpe likoló.” (Ebandeli 2:4) Na yango, mokolo mokomoko na kati ya “mikolo” motoba oyo Nzambe azalaki kobongisa mabele mpo na kosala bomoi mpe kotya yango na mabele ezalaki eleko ya molai mpenza.

Biblia elobi te ete eloko moko te ekoki kobongwana na boumeli ya ntango. Mokanda ya Ebandeli elobi ete banyama ezalisamaki na kolanda “mitindo na yango.” (Ebandeli 1:24, 25) Ntango Biblia esaleli liloba “mitindo” emonisi ete biloko yango ezali ndenge ebele. Na yango, “motindo” moko ekoki kozala na biloko ndenge na ndenge. Koloba bongo ezali komonisa ete na kati ya “motindo” moko, mbongwana ekoki komonana na kati ya biloko ya motindo yango soki ezali esika moko na boumeli ya ntango molai.

Okanisi nini?

Ndenge touti komona yango, Biblia elobeli na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya sikisiki ndenge molɔ́ngɔ́ ebandaki, ndenge mabele ezalaki na ebandeli, mpe ndenge bomoi ebandaki. Ekoki kozala ete Biblia eyebisi mpe na bosikisiki Moto oyo asalaki biloko yango? Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Koloba ete bomoi eutaki na moto moko oyo aleki bato na makasi mpe na nguya eyokani mpenza na makambo oyo bato ya siansi bazali komona sikoyo.”b

Talá likambo oyo:

Tángá Ebandeli 1:1–2:4. Makambo oyo Biblia elobi mpo na bozalisi ekeseni mosika mpenza na masapo ya kala oyo elobeli bozalisi. Na ndakisa, bato ya Babilone bazalaki kondima ete molɔ́ngɔ́ ná bato basalemaki na ebembe ya nzambe moko ya mwasi mpe na makila ya nzambe moko ya mobali. Bato ya Ezipito ya kala bazalaki koloba ete Nzambe Ra azalisaki bato na mai ya miso. Na Chine, bato bazalaki kokanisa ete biloko oyo ezali na kati ya mabele eutá na ebembe ya elombe moko boye, mpe ete bato bautá na nsili ya nzoto ya elombe yango. Emonani polele ete makambo oyo Biblia elobeli mpo na bozalisi ekeseni mpenza na masapo ya bato oyo elobeli bozalisi. Biblia ezali na boyokani na makambo ya siansi.

Talá video ya miniti minei Molɔ́ngɔ́ ekelamaki? Luká video yango na jw.org.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe ndenge Biblia emonisi yango.

b Buku yango (Encyclopædia Britannica) endimi te likanisi oyo elobaka ete bomoi ezalisamaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto