Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g21 No. 3 nk. 14-15
  • Mpo na nini ezali na ntina koyeba ete Mozalisi azali?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini ezali na ntina koyeba ete Mozalisi azali?
  • Lamuká!—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoi na yo ekozala na ntina mpenza
  • Okozwa toli ya malamu oyo ekosalisa yo sikoyo
  • Okozwa biyano na mituna na yo
  • Okozala na bomoi malamu na mikolo ezali koya
  • Nzambe azalaka? Koyeba yango ezali mpenza na ntina?
    Lamuká!—2015
  • Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2021
g21 No. 3 nk. 14-15
Mwa etuluku moko ya baninga bazali kotala banyama oyo ezali likolo ya nzete moko.

Mpo na nini ezali na ntina koyeba ete Mozalisi azali?

Mpo na nini ezali na ntina mingi tóyeba ete Mozalisi azali? Soki bilembeteli endimisi yo ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali, okosepela mpe kotalela makambo oyo emonisi ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye. Mpe soki ondimi makambo oyo Biblia elobi, okoki kozwa bolamu na makambo oyo elandi.

Bomoi na yo ekozala na ntina mpenza

BIBLIA ELOBI BOYE: “[Nzambe] asaleli bino bolamu, ndenge apesaka bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.”​—Misala 14:17.

YANGO ELIMBOLI NINI?: Eloko nyonso oyo olingaka na mokili oyo ezali likabo oyo euti epai ya Mozalisi. Okosepela na makabo yango lisusu mingi mpenza ntango okoyeba ndenge oyo Moto oyo apesá yo yango abatelaka yo.

Okozwa toli ya malamu oyo ekosalisa yo sikoyo

BIBLIA ELOBI BOYE: “Okokanga ntina ya boyengebene ná bosembo ná kolongobana, nzela mobimba ya oyo ezali malamu.”​—Masese 2:9.

YANGO ELIMBOLI NINI?: Lokola Nzambe azali Mozalisi na yo, ayebi eloko oyo osengeli na yango mpo ozala na esengo. Ntango ozali koyekola Biblia, okoyeba makambo mingi oyo ekosalisa yo na bomoi.

Okozwa biyano na mituna na yo

BIBLIA ELOBI BOYE: “Okozwa boyebi ya Nzambe.”​—Masese 2:5.

YANGO ELIMBOLI NINI?: Koyeba ete Mozalisi azali ekoki kosalisa yo ozwa biyano na mituna ya ntina mingi mpenza, na ndakisa: Ntina ya bomoi ezali nini? Mpo na nini bampasi etondi na mokili? Ntango moto akufaka akómaka ndenge nini? Biblia ekoki kopesa yo biyano ya malamu mpenza na mituna yango.

Okozala na bomoi malamu na mikolo ezali koya

BIBLIA ELOBI BOYE: “‘Ngai nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’”​—Yirimia 29:11.

Talá bavideo Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo? mpe Biblia ezali mokanda ya nani? na jw.org. Okoki kozwa bavideo yango soki okomi “Elobaka solo” to “Mokanda ya nani” na esika balukaka makambo na jw.org.

YANGO ELIMBOLI NINI?: Nzambe alaki ete, na mikolo ezali koya, akolongola mabe, bampasi, ata mpe liwa. Ntango ozali kotyela bilaka ya Nzambe motema, elikya oyo ozali na yango mpo na bomoi na mikolo ezali koya ekosalisa yo oyikela mikakatano ya lelo mpiko.

Bolamu oyo bato mosusu bazwi mpo bandimelaka Mozalisi

Cyndi.

“Nazalaka ntango nyonso na esengo ntango namonaka ndenge Nzambe asalisaka biso na makambo ndenge na ndenge na bomoi. Asalisaka biso tóyeba kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso, tóyeba kofanda na bato, mpe ndenge ya kokóma moninga na ye.”​—Cyndi, États-Unis.

Elise.

“Kondima na ngai epai ya Mozalisi ememeli ngai mapamboli mingi. Ezali kobakisela ngai mayele, mpo ezali na makambo ya kitoko ebele mpenza oyo nasengeli koyekola mpo na koyeba ye, biloko oyo asalá, mpe Liloba na ye.”​—Elise, France.

Peter.

“Kosalela makambo oyo Mozalisi azali koteya biso na Biblia ezali kokómisa ngai moto ya esengo mingi. Ezali kosalisa ngai nasilikaka mpambampamba te, natyelaka bato likebi, mpe nasepelaka na oyo nazali na yango. Esalisaka ngai mpe nazala tata ya malamu mpenza.”​—Peter, Pays-Bas.

Liz.

“Liboso nayeba Nzambe, bomoi na ngai ezalaki kaka kolya, kolala, mpe kobundana mpo na kokóma na mosala na ngonga. Nazalaki kosepela na bomoi ata moke te! Sikoyo, nazali komona ete bomoi ezali mpenza likabo moko malamu, nasengeli kosepela na yango mpe kozwa yango na motuya.”​—Liz, Estonie.

Adrien.

“Namitungisaka mingi mpenza. Kasi, koyeba ete makambo ya mabe, ya kozanga bosembo, mpe bampasi ekosila esalisaka ngai nayika mpiko.”​—Adrien, France.

Talá ndenge Biblia ezali kopesa biyano na mituna ya minene oyo etali bomoi. Talá video Mpo na nini koyekola Biblia?​—Video ya molai.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto