Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g22 No. 1 nk. 7-9
  • 2 Batelá mbongo mpe biloko na yo ya kobikela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 2 Batelá mbongo mpe biloko na yo ya kobikela
  • Lamuká!—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MPO NA NINI EZALI NA NTINA?
  • Oyo osengeli koyeba
  • Oyo okoki kosala sikoyo
  • Okosala nini soki ozali lisusu na mbongo mingi te?
    Makambo mosusu
  • Ndenge ya kosalela mbongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ndenge ya kofuta banyongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ndenge ya kosalela mbongo malamu
    Okoki kozala na libota ya esengo
Makambo mosusu
Lamuká!—2022
g22 No. 1 nk. 7-9
Mosali-mabaya moko azali kobeta sete na libaya moko.

MOKILI OYO ETONDI NA MAKAMBO YA MPASI

2 | Batelá mbongo mpe biloko na yo ya kobikela

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Mokolo na mokolo, bato mingi basalaka makasi mpo bazwa biloko oyo basengeli na yango. Likambo ya mawa, lokola mokili oyo etondi na makambo ya mpasi yango ekoki kosala ete kozwa biloko yango ekóma lisusu mpasi mingi. Mpo na nini?

  • Ntango makambo ya mpasi esalemi na esika moko boye, yango esalaka ete biloko ya kobikela ekóma ntalo mingi, ezala bilei ata mpe ndako.

  • Makambo ya mpasi ekoki kosala ete bato babungisa misala na bango to básala misala oyo ezali na lifuti moke.

  • Makama oyo ebimaka yango moko ekoki kobebisa mimbongo, bandako, to biloko mosusu, mpe yango ekoki kosala ete bato mingi bakóma babola.

Oyo osengeli koyeba

  • Soki ozali kosalela mbongo na yo na mayele, yango ekosalisa yo oyeba ndenge ya kolonga makambo ya mpasi oyo ekoki kokómela yo.

  • Yebá ete mbongo oyo ozwaka, mbongo na yo oyo ezali na banki, to mpe biloko mosusu oyo ozali na yango ekoki mpe kosila valɛrɛ.

  • Ezali na biloko oyo mbongo ekoki kosomba te, na ndakisa esengo mpe bomoko ya libota.

Oyo okoki kosala sikoyo

Biblia elobi boye: “Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.”​—1 Timote 6:8.

Kosepela na oyo tozali na yango elimboli kozala na esengo ntango bamposa na biso ya mokolo na mokolo ekokisami. Yango ezali na ntina mingimingi soki ozali na mbongo mingi te.

Mpo na kosepela na oyo ozali na yango, osengeli kozala na bomoi ya mindɔndɔ te. Soki ozali ntango nyonso koluka kozala na biloko oyo ozali na makoki ya kosomba te okozala na mikakatano mingi ya mbongo.

NDENGE YA KOYIKA MPIKO​—Batoli oyo ekoki kosalisa yo

Ntango okutani na makambo ya mpasi, salelá makanisi oyo mpo obatela mbongo mpe biloko na yo ya kobikela

KOSOMBAKA BILOKO BISOMBELÁ TE

  • Mwasi moko ya mobange azali kolongola bakarote na mwa elanga na ye.

    Bongisáká ndenge okosalela mbongo na yo

    Kobebisa te mbongo na yo na kosomba biloko oyo ozali mpenza na mposa na yango te. Omituna boye: ‘Nazali mpenza na mposa ya motuka? Na esika nasombaka ndunda na wenze ekozala malamu te nalonaka yango na lopango?’

  • Liboso ya kosomba eloko moko, omituna boye: ‘Nazali mpenza na mposa ya eloko oyo? Nazali na makoki ya kosomba yango?’

  • Komisá nkombo mpo na kozwaka lisalisi oyo guvɛrnema to bibongiseli mosusu epesaka bato soki ezali na mboka na bino.

“Tofandaka libota mobimba mpo na kotalela ndenge oyo tozali kosalela mbongo na biso. Toboyaka to mpe tosalelaka mbongo mingi te na kominanola. Tolambaka mpe bilei oyo elyaka mbongo mingi te.”​—Gift.

BONGISÁKÁ NDENGE OKOSALELA MBONGO NA YO

Mwasi moko azali kosalela calculatrice mpe azali kokoma makambo oyo ezali kobima.

Kosombaka biloko bisombelá te

Biblia elobi boye: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” (Masese 21:5) Kobongisa ndenge okosalela mbongo na yo ekosala ete mbongo oyo ozali kosalela eleka te mbongo oyo ozwaka.

  • Ya liboso, komá motángo ya mbongo oyo okanisi ete okozwa na sanza mobimba.

  • Ya mibale, komá motángo ya mbongo oyo okosalela na boumeli ya sanza mpe talelá malamumalamu ndenge osalelaka mbongo.

  • Mpe na nsima, kokanisá motángo ya mbongo oyo ozwaka ná oyo osalelaka. Soki esengeli, longolá to tiká kosomba biloko oyo osengeli mpenza na yango te.

“Sanza nyonso, ngai ná mwasi na ngai tolukaka koyeba motángo ya mbongo oyo tozali na yango mposa mpe motángo ya mbongo oyo tokosalela. Tobombaka mwa mbongo pembeni mpo na makambo oyo ekanami te mpe mpo na makambo oyo tokani kosala na mikolo oyo ezali koya. Kosala bongo, esalaka ete tómitungisa mingi te mpo toyebi ndenge tokosalela mbongo na biso.”​—Carlos.

BOYÁ BIDEFADEFA / BOMBÁKÁ MBONGO

  • Mama moko azali kosalisa mwana na ye ya mwasi atya mbongo na mwa molangi.

    Boyá bidefadefa /bombáká mbongo

    Omibongisa malamu mpo okɔtaka banyongo mingi te. Kutu soki likoki ezali, kokɔtaka banyongo te. Na esika okɔtaka banyongo, ekozala malamu obombaka nde mbongo mpo na kosomba biloko oyo ozali na yango mpenza mposa.

  • Bombáká mwa mbongo sanza na sanza mpo na kosomba biloko oyo okani na mikolo ezali koya to mpo na kosalela yango soki likambo moko ebimi na mbalakaka.

SALÁKÁ MOSALA MAKASI / BATELÁ MOSALA NA YO

Biblia elobi boye: “Na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka.”​—Masese 14:23.

  • Mosali-mabaya moko azali kobeta sete na libaya moko.

    Saláká mosala makasi / batelá mosala na yo

    Zalá na makanisi ya malamu mpo na mosala na yo. Ata soki mosala yango ezali te mosala oyo obandaki kokana kosala, sepelá na yango mpamba te ezali kopesa yo mbongo.

  • Zaláká makasi na mosala mpe kozela te ete bozala ebele mpo osala mosala malamu. Yango ekoki kosala ete obatela mosala na yo to mpe ezala mpasi te ozwa mosala mosusu na mikolo ezali koya.

“Nasalaka mosala nyonso oyo emonani, ata soki nasepeli na mosala yango te to mpe mbongo oyo bakofuta ngai ekozala mingi te ndenge oyo nakanisaki. Nazalaka moto ya kotyela motema mpe nasalaka mosala malamu lokola nde ezali mosala na ngai moko.”​—Dmitriy.

Oyo okoki kosala soki ozali koluka mosala . . .

  • Yebisá basusu ete ozali koluka mosala. Bengá to komelá bakompanyi mpo na koyebisa bango ete ozali koluka mosala, salá yango ata soki bazali koluka bato ya misala te. Yebisá baninga mpe bandeko na yo ya libota ete ozali koluka mosala.

  • Zalá moto oyo amesanaka na makambo ya sika. Ekoki kozala mpasi kozwa mosala oyo osepelaka na yango.

Baboti bazali kosolola makambo etali mbongo wana bana na bango bazali kosakana.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU. Tángá lisolo “Okosala nini soki ozali lisusu na mbongo mingi te?”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto