Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g22 No. 1 nk. 10-12
  • 3 Batelá boyokani na yo ná basusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 3 Batelá boyokani na yo ná basusu
  • Lamuká!—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MPO NA NINI EZALI NA NTINA?
  • Oyo osengeli koyeba
  • Oyo okoki kosala sikoyo
  • Poná malamu baninga na yo
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ndenge ya kobatela boninga na mokili oyo ezangá bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Okoki kozala na boninga oyo ekoumelaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Na nimero oyo
    Lamuká!—2022
Makambo mosusu
Lamuká!—2022
g22 No. 1 nk. 10-12
Babalani oyo bakomi mikolo bayambani.

MOKILI OYO ETONDI NA MAKAMBO YA MPASI

3 | Batelá boyokani na yo ná basusu

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Lokola bato mingi bakómi komitungisa mpo na makambo ya mpasi oyo ezali kosalema, bazali lisusu te kobatela boyokani ya malamu ná bato oyo balingaka.

  • Bato mosusu bakómaka mosika ya baninga na bango.

  • Babalani basalelaka lisusu te balongani na bango makambo na boboto.

  • Baboti batyaka likebi mpenza te na mitungisi ya bana na bango to mpe bakipaka yango ata moke te.

Oyo osengeli koyeba

  • Kozala na boyokani ya malamu ná basusu ekoki kosalisa yo ozala na sante ya malamu na nzoto mpe na makanisi, mingimingi ntango ozali kokutana na mikakatano.

  • Mikakatano oyo makambo ya mpasi ezali kobimisa ekoki kobimisela libota na yo mitungisi oyo bokanisaki te.

  • Bansango ya makambo ya mpasi oyo ezali kosalema na mokili ekoki kobangisa to konyokola bana na yo na makanisi na ndenge oyo okanisaki te.

Oyo okoki kosala sikoyo

Biblia elobi boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” ​—Masese 17:17.

Baninga bakoki kosalisa biso mpe kopesa biso batoli ya malamu. Baninga ya ndenge wana bakoki kosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tokutanaka na yango.

NDENGE YA KOYIKA MPIKO​—Batoli oyo ekoki kosalisa yo

Ntango okutani na makambo ya mpasi, salelá makanisi oyo mpo obatela boyokani na yo ná basusu

KÓMISÁ MAKASI BOYOKANI NA YO NÁ MOLONGANI NA YO

Babalani oyo bakomi mikolo bayambani.

Kómisá makasi boyokani na yo ná molongani na yo

Biblia elobi boye: “Bato mibale baleki moto moko . . . Mpo soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye.” (Mosakoli 4:9, 10) Babalani basengeli kosala makambo lokola bato oyo babɛtaka na ekipi moko ya lisano kasi te lokola banguna.

  • Kotika te ete mitungisi oyo ozali kokutana na yango etinda yo osalela basusu makambo na ndenge ya mabe. Zalá motema molai mpe kozala moto ya makambo makasimakasi te.

  • Ata mbala moko na pɔsɔ, yebisáká molongani na yo makambo oyo ezali kotungisa yo. Na esika ya kosilikela molongani na yo, luká nde ndenge ya kosilisa mokakatano oyo ebimi.

  • Botyá ntango ya kosala elongo makambo oyo bolingaka.

  • Bolobelá bantango ya malamu oyo bolekisá elongo, mbala mosusu bokoki kotala bafɔtɔ na bino ya libala to kokanisa makambo mosusu ya malamu oyo bosalá elongo.

“Babalani bakoki koyokana te na makambo mosusu, kasi yango elimboli te ete bakoki kosala elongo te lokola ekipi moko. Babalani bakoki kozwa ekateli moko elongo mpe na nsima kosala na bomoko mpo ekateli yango esimba.”​—David.

BATELÁ BONINGA NA YO NÁ BASUSU

  • Basi oyo bazali na loposo ekeseni, bazali koseka mpe kosepela kozala elongo na basusu.

    Batelá boninga na yo ná basusu

    Longolá lisalisi oyo baninga bapesaka yo, okoki mpe koluka lolenge ya kosalisa bango. Soki ozali kolendisa basusu, yo moko mpe okomilendisa.

  • Bengáká mwa baninga na yo mosusu mpo na koyeba soki bazali ndenge nini.

  • Tuná bango soki basalaki nini mpo balonga mikakatano oyo yo mpe ozali kokutana na yango.

“Ntango okutani na mikakatano ya makasi, baninga bakoki mpenza kosalisa yo. Bakoki kosalisa yo omona likambo ya malamu oyo okoki kosala, ata soki bakoyebisa yo makambo oyo osí oyebi. Baninga batyelaka yo likebi, mpe bayebi ete yo mpe otyelaka bango likebi.”​—Nicole.

ZALÁ MOBOTI OYO ASALISAKA BATO YA LIBOTA NA YE

Baboti elongo na bana na bango misato bafandi likolo ya libaya moko mpe bazali kosepela na biloko oyo ezali zingazinga na bango.

Zalá moboti oyo asalisaka bato ya libota na ye

Biblia elobi boye: “Kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19) Na ebandeli, bana na yo bakoki kokakatana koyebisa yo ndenge oyo bazali komiyoka mpe makambo oyo ezali kotungisa bango, kasi zalá motema molai ntango ozali koyoka bango, soki osali bongo, yango ekosala ete bayebisa yo ndenge oyo bazali komiyoka.

  • Salá ete bana na yo bamiyoka malamu ntango bazali koyebisa yo makambo oyo bazali kokutana na yango. Bana mosusu bakokaka te koloba soki baboti bafandisi bango mpe babandi kotuna bango mituna, kasi bafungolelaka baboti na bango motema ntango bazali kosala makambo oyo balingaka mingi, na ndakisa ntango bazali kolya.

  • Salá ete bana na yo balandaka mingi te bansango ya makambo mabe oyo ezali koleka na mokili.

  • Yebisá bana na yo bibongiseli oyo ozwi mpo na kobatela libota na yo.

  • Bongisá ndenge bokosala soki likambo moko ebimi na mbalakaka, mpe mekámeká yango elongo na bana na yo.

“Sololá ná bana na yo, mpe tiká bango báloba ndenge bazali komiyoka. Bakoki kobanga koyebisa yo makambo oyo ezali kobangisa bango, oyo ezali kotungisa bango to mpe oyo ezali kopesa bango nkanda. Yebisá bango ete yo mpe okutaná na makambo ya ndenge wana, mpe yebisá bango oyo osalaki mpo na kolonga yango.”​—Bethany.

Elilingi oyo euti na video “Okoki kozala na libota ya esengo.” Babalani oyo bazali na esengo basimbani mpe bazali kotambola elongo.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU. Talá Video Okoki kozala na libota ya esengo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto