Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g22 No. 1 nk. 13-15
  • 4 Batelá elikya na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 4 Batelá elikya na yo
  • Lamuká!—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MPO NA NINI EZALI NA NTINA?
  • Oyo osengeli koyeba
  • Oyo okoki kosala sikoyo
  • Biblia epesi elikya ya solosolo
  • Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
  • Elikya ezali na 2024?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Oyo okoki kosala soki obɛli maladi moko ya mbalakaka
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Lamuká!—2022
g22 No. 1 nk. 13-15
Biblia moko ezali ya kofungwama liboso ya fololo moko.

MOKILI OYO ETONDI NA MAKAMBO YA MPASI

4 | Batelá elikya na yo

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Komitungisa mpo na makambo ya mpasi oyo ezali kosalema na mokili ekoki kobimisela moto mikakatano na nzoto mpe na makanisi. Bato mingi oyo bakutanaka na makambo ya ndenge wana bandimaka te ete makambo ekoki kobonga. Yango etindaka bango básala nini?

  • Basusu baboyaka kutu kokanisa mpo na avenire.

  • Basusu bamɛlaka masanga to basalelaka drɔgɛ mpo na kobosana makambo ya mpasi oyo bazali kokutana na yango.

  • Mwa bato moke bamonaka ete ezali malamu bákufa na esika ya kozala na bomoi. Yango wana bakómaka na likanisi ya komiboma.

Oyo osengeli koyeba

  • Mikakatano mosusu oyo ozali kokutana na yango ezali kaka mpo na mwa ntango mpe ekoki kobonga na ndenge oyo okanisaki te.

  • Ata soki makambo ebongwani te, ezali na makambo oyo okoki kosala sikoyo mpo oyikela mikakatano yango mpiko.

  • Biblia epesi elikya ya solosolo mpo na kosilisa libela bampasi oyo bato bazali kokutana na yango.

Oyo okoki kosala sikoyo

Biblia elobi boye: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”​—Matai 6:34.

Sepelá na oyo ozwi lelo. Komitungisa te mpo na makambo oyo ekosalema lobi mpo yango ekoki kopekisa yo osepela na oyo ozali na yango lelo.

Kobanga makambo ya mabe oyo ekoki kosalema, ekobakisela yo kaka mitungisi mpe ekosala ete ozala lisusu na elikya te mpo na makambo ya malamu oyo ekosalema na mikolo ezali koya.

NDENGE YA KOYIKA MPIKO​—Batoli oyo ekoki kosalisa yo

TYÁ MAKANISI NA MAKAMBO YA MALAMU

Mwasi moko atelemi pene ya fenetre mpe azali kotala na likebi mpenza.

Biblia elobi boye: “Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe; kasi ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.” (Masese 15:15) Soki ozali kotya makanisi na yo nyonso na mikakatano oyo ozali na yango, okomona te ete solisyo ezali mpo na kosilisa likambo yango. Nzokande, soki ozali na makanisi malamu yango ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya kosilisa mikakatano na yo.

  • Kolekisaka ntango mingi te na kolanda bansango.

  • Mpokwa nyonso, kanisáká makambo mibale to misato oyo mpo na yango osengeli komonisa botɔndi.

  • Saláká liste ya makambo oyo okosala mpe komáká mingimingi makambo oyo okosala na mokolo wana. Soki okosala mosala moko ya monene, kabolá yango bitenibiteni mpo na nsuka ya mokolo omona matomba oyo okozwa na milende oyo osalaki.

LUKÁ LISALISI EPAI YA BASUSU

Mobali moko ya mokolo azali kokitisa mobali oyo azali elenge motema.

Biblia elobi boye: “Ye oyo azali komitangola na bamosusu . . . akotombokela makambo nyonso ya bwanya.” (Masese 18:1) Okoki te kobima na libulu moko ya molai na makasi na yo moko, kasi okoki kobima soki moto mosusu asalisi yo.

  • Sɛngáká lisalisi epai bandeko ya libota to baninga.

  • Lisusu, lukáká lolenge oyo okoki kosalisa bango. Kosalisa basusu ekosalisa yo otalela mikakatano na yo na ndenge ebongi.

  • Soki ozali lisusu na elikya te mpe okómi komona lokola bomoi ezali na ntina te, ekozala malamu okende kokutana na monganga. Na bantango mosusu, komiyoka lokola ete makambo elekeli yo motó ezalaka elembo oyo emonisaka ete moto azali konyokwama na makanisi. Bato mingi bazwaka lisalisi ya monganga mpo na yango.a

a Lamuká! etindaka moto te andima lolenge boye to boye ya komisalisa.

Biblia epesi elikya ya solosolo

Mokomi moko ya nzembo ya kala ayebisaki Nzambe boye na libondeli: “Liloba na yo ezali mwinda na lokolo na ngai, mpe pole na nzela na ngai.” (Nzembo 119:105) Talá ndakisa moko oyo emonisi ete Biblia Liloba ya Nzambe ezali mpenza bongo.

Na butu, mwinda esalisaka biso tóyeba esika ya kotya lokolo. Ndenge moko mpe, Biblia ezali na batoli ya bwanya oyo ekoki kosalisa biso ntango tolingi kozwa ekateli moko ya ntina mingi.

Mwinda ekoki kopesa pole na nzela oyo tozali kotambola mpo tókoka komona biloko oyo ezali liboso na biso. Ndenge moko mpe, Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba ete na mikolo ezali koya makambo ekobonga.

Biblia ezali kaka te buku oyo elobelaka masolo ya bato kasi epesi biso mpe elikya mpo na mikolo ezali koya. Elobeli:

1

Ndenge oyo bampasi ebandá: Biblia elobi ete “kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”​—Baroma 5:12.

2

Mpo na nini baguvɛrnema ya bato elongi te kosilisa bampasi ya bato: Biblia elobi ete “ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Makambo oyo ezali kosalema na mokili endimisi likambo yango.

3

Oyo Nzambe akosala mpo na kobongisa makambo: Biblia elobi ete “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​—Emoniseli 21:4.

Elilingi euti na video “Mpo na nini koyekola Biblia?” Mwasi moko azali kolakisa mobali na ye makambo oyo atangaki na Biblia.

MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU. Talá video Mpo na nini koyekola Biblia?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto