Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g24 No. 1 nk. 4-6
  • Mpo na nini bato bamemyaka lisusu basusu te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini bato bamemyaka lisusu basusu te?
  • Lamuká!—2024
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOMEMYA BASUSU EZALI NA NTINA
  • OYO OKOKI KOSALA
  • OYO BATATOLI YA YEHOVA BASALAKA
  • Pesáká basusu limemya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mpo na nini limemya elimwe boye na mokili?
    Lamuká!—2024
  • Kotika moto asala oyo alingi—Ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa
    Makambo mosusu
  • Mpo na nini osengeli kotosa bokonzi?
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Lamuká!—2024
g24 No. 1 nk. 4-6
Na restora, mobali moko azali kogangela mosali oyo azali kosɛnga bolimbisi. Bato mosusu na mesa bayoki mabe.

Mpo na nini bato bamemyaka lisusu basusu te?

KOMEMYA BASUSU EZALI NA NTINA

Komemya basusu epekisaka matata ebima mpe esalaka ete likambo ya mabe oyo esalemi eya ndongo te.

  • Lisese moko ya Biblia elobi: “Eyano ya boboto ekitisaka nkanda makasi, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.” (Masese 15:1) Maloba mpe misala oyo ezangi boboto epelisaka mɔtɔ, mpe mbala mingi ebimisaka makama.

  • Yesu alobaki: “Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Matai 12:34) Maloba ya kotyola oyo moto abimisi, ekoki kobomba likambo ya monene na motema na ye. Ekoki komonisa ndenge oyo atalelaka bato ya lopɔsɔ mosusu, ekólo mosusu, mboka mosusu, to bato oyo lolenge ya bomoi na bango ekeseni na oyo ya ye.

    Ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bato koleka 32000 na bikólo 28 emonisi ete 65% ya bato balobaki ete kozanga limemya oyo ezali komonana na mokili lelo oyo etikalá komonana te.

OYO OKOKI KOSALA

Ezala na kelasi to na mosala, pesáká bato nyonso limemya—ata soki botalelaka makambo ndenge moko te. Luká makambo oyo ekoki koyokanisa bino, yango ekosalisa yo oboya kolobaka mabe to kosambisaka basusu.

“Bótika kosambisa mpo básambisa bino te.”—Matai 7:1.

Oyo olingi básalela yo, salelá yango mpe basusu. Soki ozali kosalela bato makambo na bosembo mpe na boboto, mbala mosusu bango mpe bakosalela yo kaka bongo.

“Kaka makambo bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.”—Luka 6:31.

Limbisáká basusu. Kolandela kaka te maloba to mabe oyo moto asali yo, mindimisá ete ntango mosusu asali yango na nko te.

“Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye, mpe akozwa lokumu soki alimbisi likambo oyo esali ye mpasi.”—Masese 19:11.

Na kati ya Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova liboso makita ebanda. Bato ya bambula mpe bikólo ndenge na ndenge bazali kopesana mbote na esengo mpe kosolola.
Na kati ya Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova liboso makita ebanda. Bato ya bambula mpe bikólo ndenge na ndenge bazali kopesana mbote na esengo mpe kosolola.

OYO BATATOLI YA YEHOVA BASALAKA

Ezala na bisika ya mosala to bipai bafandaka, Batatoli ya Yehova bamonisaka limemya epai ya bato nyonso.

Toteyaka makambo ya Biblia ofele na bato nyonso, kasi totindaka bato na makasi te bándima makanisi na biso. Tosalaka makasi tósalela batoli ya Biblia na ndenge toteyaka bato nsango na biso “na boboto mpe na limemya makasi.”—1 Petro 3:15; 2 Timote 2:24.

Toboyaka koponapona bilongi mpe na makita na biso ya lisangá toyambaka bato ya bisika nyonso oyo balingi koyekola makambo ya Biblia. Toyokanaka malamu na bato nyonso mpe ‘tokumisaka bato ya ndenge nyonso.’—1 Petro 2:17.

Totosaka bakonzi ya mboka na bisika tofandaka. (Baroma 13:1) Totosaka mibeko ya leta mpe tofutaka mpako. Atako tokɔtaka te na makambo ya politiki, totosaka bikateli oyo moto na moto azwaka na makambo yango.

Bililingi: Bililingi euti na video “Ntango nini bolingo ya sembo ekolonga koyinana?” 1. Moarabe ya mobali. 2. Moyuda ya mobali.

TALÁ MAKAMBO MOSUSU

Ezali mpasi mpo moto amonisela basusu limemya soki bateyá ye koyina bato. Talá ndenge mibali mibale oyo bautá na bikólo ekeseni bayekolaki ndenge ya komoniselana limemya. Talá na jw.org video Ntango nini bolingo ya sembo ekolonga koyinana?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto