Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g25 No. 1 nk. 14-15
  • Zalá na elikya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na elikya
  • Lamuká!—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MPO NA NINI EZALI NA NTINA
  • OYO OKOKI KOSALA
  • BOKONZI YA NZAMBE EZALI NINI, MPE EKOSALA NINI?
  • Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
  • Elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya
    Makambo mosusu
  • Bantina oyo tozali na elikya mpo na mobu 2023​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Lamuká!—2025
g25 No. 1 nk. 14-15
Bato ya libota moko bazali na picnic mpe bazali kotala biloko oyo Nzambe akelá.

OYO OKOKI KOSALA NTANGO NTALO YA BILOKO EZALI KOMATA

Zalá na elikya

Na ekólo esika ofandi, ntalo ya biloko ezali se komata, kasi mbongo oyo ozwaka ezali moke? Ozali komitungisa mpo na kokokisa bamposa na yo moko mpe oyo ya bato ya libota na yo? Soki ezali bongo, okoki komitungisa mpo na avenire na yo. Kasi, ata na ntango wana ya mpasi, kozala na elikya ekoki kosalisa yo.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA

Bato oyo bazalaka na elikya basukaka kaka te na kozela ete makambo ebongwana. Elikya etindaka bango básala oyo bakoki mpo na kobongisa makambo ya bomoi na bango. Na ndakisa, bolukiluki moko emonisi ete mbala mingi bato oyo bazalaka na elikya . . .

  • bayikelaka mikakatano na bango mpiko

  • bamesanaka nokinoki na mbongwana oyo esalemi

  • bazwaka bikateli ya malamu na bomoi, mpe baboyaka mimeseno oyo ekoki kobebisa sante na bango

OYO OKOKI KOSALA

Ya liboso, luká koyeba ndenge Biblia ekoki kosalisa yo. Biblia ezali na makanisi ya sikisiki oyo ekoki kosalisa yo oyeba oyo okoki kosala ntango ntalo ya biloko ezali se komata. Makanisi yango ekoki kosalisa yo oyeba oyo okoki kosala na bomoi na yo ya lelo mpe na mikolo ezali koya ntango makambo ekokóma lisusu mpasi.

“Mayɛlɛ ekobatela yɔ mpe bosɔsɔli ekosunga yɔ.”—Masese 2:​11, Bible Haut-Fleuve


Ya mibale, luká koyeba oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya. Soki oyebi valɛrɛ ya bwanya oyo ezali na Biblia, yango ekotinda yo oluka koyeba malamumalamu oyo buku yango elobi mpo na mikolo ezali koya. Na ndakisa, okoyekola ete Nzambe alingi kaka te ozala na “bomoi ya malamu na mikolo ezali koya mpe elikya” kasi apesi mpe yo ntina oyo osengeli kondimela elikya yango. (Yirimia 29:11) Ntina yango ezali Bokonzi ya Nzambe.

BOKONZI YA NZAMBE EZALI NINI, MPE EKOSALA NINI?

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo ekoyangela mabele mobimba. (Danyele 2:44; Matai 6:10) Uta na likoló, guvɛrnema yango ekosilisa mpasi mpe bobola, mpe na esika na yango, ekozala nde na kimya mpe bato bakozala na nyonso oyo basengeli na yango mpo bázala na esengo, ndenge bavɛrsɛ oyo elandi emonisi yango.

“Okozala na esengo mpe makambo na yo ekotambola malamu.”—Nzembo 128:2.

“[Bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela,] bakoboma nzoto mpamba te.”—Yisaya 65:23.

“Bilei ekozala ebele mpenza na mabele.”—Nzembo 72:16.

Bamilio ya bato batyelaka bilaka yango motema, bandimaka ete Nzambe “akoki kokosa te.” (Tito 1:2) Na yango, ekozala malamu yo moko oluka koyeba oyo Biblia eteyaka. Elikya oyo Biblia epesi ekoki kopesa yo makasi oyo osengeli na yango mpo na koyika mpiko ntango ntalo ya biloko ezali se komata mpe kosalisa yo ozala na kondima ete na mikolo ezali koya, makambo ekobonga.

Ramaz.

“Elikya oyo nazali na yango oyo esimbami na Biblia, esalisaka ngai natalela mikakatano ya mokili ete ezali kaka mpo na ntango mokuse. Yango epesaka ngai makasi mpe kimya ya makanisi oyo nasengeli na yango mpo na koyika mpiko ntango ntalo ya biloko ezali se komata.”—Ramaz, Géorgie.

LUKÁ KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

Okoki mpenza kotya motema na makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya? Talá bavideo oyo elandi na jw.org: Nini ekoki kondimisa biso ete Biblia elobaka solo? mpe Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Mwasi moko azali kozwa Biblia oyo ezali na étagère.
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto