Liteya 21
Makanisi mabongi na koteya, malakisami polele
1-3. Mpo na nini makanisi ya sikisiki masengeli mpo ete diskur ekoka koteya bayoki?
1 Mpo na kosala diskur oyo ekozala na motuya na miso na bato, esengeli naino komilengela malamu, mpe yango esengi ntango mpe kotya milende. Nzokande soki eleki malamu, okosepela mingi! Wana obakisi boyebi na yo ya solo mpe ozali na makambo ya litomba mpo na kokabolana yango elongo na bayoki na yo. Na esika ete olobela bango makambo ya bongo na bongo to ya likolólikoló, opesi bango nde bingengiseli mpe oyebi ete makambo olobeli bango ezali bongo. Yango ebakisi mposa ya bayoki na yo mpo na Liloba ya Nzambe mpe ezali bongo kokumisa Jéhovah. Boyekoli oyo ya makanisi makoki koteya bato etali mingimingi makambo oyo okoloba kati na diskur na yo. Talela na mokuse biteni ndenge na ndenge ya likambo oyo. Ezali pwɛ́ ya liboso kati na fiche ya Toli mpo na balobi.
2 Makanisi ya sikisiki. Soki oratere azali koloba bobele makambo ya bongo na bongo, bato bakozala na konfianse na diskur na ye te. Soki makanisi mazali ndenge nyonso, bayoki bakoyeba te wapi oyo bakosimba. Mpo ete bayoki basimba yango, makanisi masengeli kozala ya sikisiki mpe kozanga ntembe. Esengeli komonisa ete molobi alukaki makambo na mikanda mpe ayebi lisolo na ye malamu.
3 Okoki kozwa ezaleli yango ntango ozali kobongisa masolo na yo. Ekoki ete omituna: Mpo na nini? Ntango nini? Epai wapi? bongo na bongo. Ekoki te bobele koloba na bato ete likambo boye to likambo boye esalemaki. Yebisa bango lisusu esika nini esalemaki, na date nini esalemaki mpe mbala mosusu ntina oyo likambo yango esalemaki. Bobele bongo, ekoki te bobele koloba ete likambo boye to likambo boye ezali solo. Monisa mpo na nini ezali solo mpe mpo na nini ezali litomba na koyeba yango. Soki opesi malako, limbola ndenge nini bakosalela yango. Molai ya bandimbola oyo okopesa ekotalela boyebi ya bayoki na yo. Osengeli kotalela bango liboso ya kozwa ekateli mpo na bandimbola nini osengeli kokotisa kati na diskur na yo.
4-6. Mpo ete diskur na yo ekoka koteya bayoki na yo, makambo nini osengeli kotalela?
4 Makanisi mabongi na bayoki. Likambo moko ekoki kozala ya sika mpo na etuluku moko ya bayoki, nzokande mpo na etuluku mosusu, bakomona ete ozali koteya bango eloko moko te to mpe bakomona ete liteya wana eleki makoki na bango. Yango wana makanisi obongisi esengeli kokokana na bayoki na yo. Na ndakisa, makanisi oyo okokotisa kati na diskur oyo ezali kolobela mosala na biso ya kosakola ekobongwana na ntango ozali koloba na likita ya mosala, na ntango ozali koloba na moto oyo alingi komipesa epai na Jéhovah to na ntango ozali koloba na etuluku moko ya bato ya mokili.
5 Okotalela mpe makambo oyo nyonso wana ezali yo kobongisa diskur mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Osengeli kotalela bayoki na yo, kadre na yo mpe mokano oyo ozali kolanda, wana nde ekosalisa yo na koyeba makanisi nini osengeli kokotisa kati na diskur na yo. Ekotalela mpe lolenge ya diskur mpe kadre oyo oponi. Mpo na diskur ya liboso oyo ebengami discours d’instruction ezali lisolo epesami na lisangá mobimba. Mpo na masolo mosusu, kadre to ndenge ya kosalela yango ekoki kobongwana; ekotalela lolenge na bayoki na yo mpe mokano oyo ozali kolanda na diskur na yo. Mpo na masolo nyonso, moyekoli mpe mopesi-toli bakoki komituna mituna miye: Makanisi makokisami na bayoki? Eteyi bango eloko ya sika?
6 Wana ezali yo komilengela, omituna mituna miye: Mokano nini nazali koluka kati na diskur na ngai? Na makanisi oyo naponi, wapi oyo molobani na ngai to bayoki na ngai basili koyeba yango? Moboko nini nasengeli kotya mpo ete makanisi yango mazala polele koleka? Nakoki kosala boni mpo ete naloba yango ndenge mosusu, na bayoki mosusu. Kokokanisa esalisaka biso mbala mingi na komona polele koleka. Wana ezali yo kobongisa diskur na yo, kanisa mpo na ndenge oyo mbele okosala lisolo yango soki bayoki na yo bazali mitindo mingi. Wana ekosalisa yo na komona makoki makeseni oyo mazali liboso na yo mpe kokotisa makanisi oyo makoteya mpenza bayoki na yo.
7, 8. Ndenge nini tokoki kosala mpo bayoki bamona lolenge bakoki kosalela makambo mazali kati na diskur na biso?
7 Makanisi mazali na motuya mpo na kosalela yango. Tokoki kozwa boyebi mingi, kasi nyonso ezali na motuya mpo na kosalela te. Mpo na biso, makanisi mabongi na koteya ezali oyo matali makambo masengeli na bomoi ya moklisto mpe na mosala na biso ya boklisto. Tolingi koyeba ndenge nini tokoki kosalela boyebi oyo tosili kozwa.
8 Moyekoli oyo amilengeli mpe mokengeli na eteyelo oyo azali kopesa batoli bakoki kotalela pwɛ́ oyo na komitunaka mituna miye: Diskur oyo ezali na mitinda nini mpo na kotambwisa bomoi ya bato? Makanisi mazali kati na yango, mazali na litomba mpo na kokamata bikateli? Ekoki kosalelama kati na mosala ya kosakola? Ezali kokumisa Liloba mpe mikano ya Nzambe? Badiskur mingi ekokisaka masengami oyo nyonso te. Kasi, mpo ekoka kosalelama, makanisi malakisami kati na diskur masengeli komonisa bayoki na nzela nini bakosalela yango.
9-11. Mpo na nini makambo tozali koloba masengeli kozala solo mpe bongo?
9 Makambo malobami mazali se bongo. Lisangá ya ba Témoins de Jéhovah etongami likoló na solo. Mposa na biso ezali ya koloba ntango nyonso solo mpe koyebisa bato makambo mazali bongo mpenza. Esuki bobele na mateya na biso te, kasi lisusu na mikapo oyo tozali kopesa, na makambo oyo tozali koloba na ntina na bato mosusu, na makambo ya sianse to bansango mosusu oyo tokotisi na lisolo na biso.
10 Bayoki bakoki kolobela bato mosusu makambo bayoki kati na lisolo na biso, nzokande ezalaki na mabunga na kati. Soki oratere alobi makambo oyo mazali bongo te, bayoki bakokoka lisusu kotyela ye motema te mpe bakobanda kobeta ntembe na makambo na ye mosusu ata mazali solo. Soki intéressé akoyoka mabunga motindo oyo, nzokande ndeko mosusu alobelaki ye ndenge mosusu, akomona ete ba Témoins de Jéhovah bazali na boyokani te kati na bango, mpe akotika kosangana na biso kozanga koyebisa biso ntina.
11 Mopesi-toli akoluka te ete asembola likanisi mokomoko ya moyekoli, mingimingi soki azali moyekoli ya sika, oyo asimbi naino makambo mozindo na Liloba na Nzambe te. Akoluka nde kolakisa ye, na boboto nyonso, ndenge nini akoki komilengela na motindo boye ete makanisi nyonso oyo apesi mazala solo mpe mazala se bongo.
12, 13. Bingengiseli mosusu bizali na motuya nini?
12 Bingengiseli mosusu. Maloba oyo mamonisi ete moto akanisaki na mozindo mpe alukaki bandimbola epai na epai ekoki kotombola motuya ya diskur mpe ntango mosusu okopengola kolobela lisusu bayoki makambo oyo basili koyeba yango. Ebongi nde kolakisa makambo lokola ete ezali ya sika, kolamusa mposa ya bayoki. Kosalaka bongo, ata bato basila koyoka lisolo yango, ekozala ntango nyonso se na elengi mpo na bango. Ye moko oratere akobanga eloko te. Azali na móto, mpo ayebi ete akosala lisolo na ye na lolenge moko ekeseni mwa moke.
13 Keba mpo na kopesaka makanisi na yo moko. Tya confiance na yo na mikanda ya la Société. Tala ba index ya la Société mpe tala maloba na nse na Biblia. Omindimisa ete likambo ezali yo koloba ezali engengiseli kasi ndimbola ya libunga te.
14-16. Nini osengeli kosala wana ezali yo kobongisa diskur mpo na kokoka kolakisa makanisi na lolenge ya petee?
14 Wana ezali yo kobongisa makanisi na yo, ezali mpe likambo ya ntina ete otalela malamumalamu lolenge oyo okolakisa yango. Pwé oyo ekomami na fiche ya Toli mpo na balobi ete, “Polele, bakoki kolanda yango kozanga mpasi”. Soki okotyela yango likebi te, mbala mosusu bayoki na yo bakokanga ntina na maloba na yo te to bakokoka kosimba te makambo oyo bayoki. Pwé yango ezali na makambo misato oyo tolingi kotalela.
15 Maloba ya petee. Elingi koloba te ete bafraze esengeli kobongisama libela. Kasi osengeli kososola makanisi oyo okopesa mpe kotalela biloko mosusu. Litomba na yango ekozala diskur moko ekangisami malamu, ya makanisi mikuse mpe oyo bato bakoki kolanda yango kozanga mpasi. Soki oratere ye moko azali komona likambo polele te kati na elimo na ye, akokoka mpe kolimbola yango epai na bayoki te.
16 Komibongisa mbangumbangu ezali malamu te. Osengeli kokanisa malamu na pwɛ́ nyonso ya diskur mpe kotalela likanisi uta ebandeli kino nsuka, kino ekokoma polele kati na elimo na yo. Kosala bozongeli ya bapwɛ́ nyonso ya diskur liboso ya koloba yango ekosalisa biso ete tobatela yango kati na makanisi mpe kososolisa yango polele na bayoki na biso ndenge biso moko tozali kososola yango.
17, 18. Mpo na nini osengeli kolimbola maloba mayebani malamu te?
17 Kolimbola maloba mayebani malamu te. Boyekoli na biso ya Makomami mpe ya mikanda ya la Société epesi biso maloba mayebani te epai na bato oyo bayebi mosala na biso te. Soki tosaleli maloba yango mpo na koteya solo ya Biblia epai na bato mosusu, mbala mosusu bakoyeba te eloko nini tolingi koloba.
18 Talela bayoki na yo. Makambo nini ekoki na bososoli na bango? Bayebi mosala na biso? Bameseni na maloba oyo biso tosalelaka? Maloba lokola “teokratike”, “batikali”, “bampate mosusu”, mpe ata “Armagedon” to “Bokonzi” ekoki kozala eloko mosusu na makanisi na bango to mpe eloko moko te. Soki bayoki na biso bayebi mosala na biso te, esengeli kolimbwela bango maloba lokola “molimo”, “lifelo” mpe “bomoi ezangi libebi”. Nzokande, soki nde ozali koloba na bandeko kati na lisangá, ntina ya kolimbola maloba ya boye ezali te. Yango wana mokengeli na eteyelo akotalela kadre ya lisolo na yo, elingi koloba ozali kosala yango liboso ya banani.
19, 20. Ndenge nini tokoki kopengola makanisi mingimingi na lisolo na biso?
19 Makanisi mingi te. Ekoki kozala ete diskur ezali na makanisi mingimingi mpe bayoki basimbi ata eloko moko te. Mpo ete diskur ekokisa mokano na yango, esengeli kozala na makanisi mingi te koleka oyo oratere akoki kolimbola malamu na minite oyo bapesi ye. Bobele bongo, kosalela makanisi mingi te koleka oyo bayoki bakoki kosimba. Epai mosusu, makanisi yango moko oyo olakisi na lisangá, nzokande epai na mopaya osengeli koyeisa yango petee mingi. Wana lisusu, mopesi-toli akotalela bayoki ya motindo nini oratere aponi.
20 Ndenge nini moyekoli akoki koyeba makanisi boni asengeli kokotisa kati na diskur? Ekozala litomba ete amekameka wana ezali ye komibongisa mpe atalela malamu makanisi oyo akolakisa. Kati na yango, wapi oyo bayoki basili koyeba yango, na mobimba to na ndambo? Wapi ekozala makanisi ya sika mpo na bango? Soki fondema ya boyebi ya bayoki ezali monene, diskur etongami likoló na yango ekoki mpe kozala monene engebene ntango epesameli. Nzokande, soki bayoki bayebi eloko moko te na lisolo oyo olingi kolobela bango, osengeli kotalela motuya boni ya makanisi ekoki na bango mpe kotalela ntango esengeli mpo ete olimbwela bango yango malamumalamu.