Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sg liteya 25 nk. 126-129
  • Kotanga mikapo mpe kolimbola ntina oyo otangeli yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotanga mikapo mpe kolimbola ntina oyo otangeli yango
  • Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Masolo mosusu
  • Konyata malamu maloba ya ntina na bavɛrsɛ
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Ndenge nini okoki kokotisa moto kati na Biblia
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Kobimisa makanisi ya vɛrsɛ liboso ya kotánga yango
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
sg liteya 25 nk. 126-129

Liteya 25

Kotanga mikapo mpe kolimbola ntina oyo otangeli yango

1-3. Ntango tozali kosala diskur, ndenge nini tosengeli kotangela mikapo ya Biblia?

1 Wana ezali yo koloba na bato mosusu na ntina na mikano na Nzambe, ezala na bandako na bango to na masolo oyo ozali kosala na makita, osalelaka mikapo ya Biblia. Esengeli bongo ete oyeba kotanga yango malamu. Kotanga bobele mpo na kotanga te. Mpo ete kotanga na yo ekokisa ntina na yango, esengeli ete ebakisa bosepeli na lisolo na yo. Yango wana fiche ya Toli mpo na balobi ezali na pwɛ́ oyo ete “Komonisa maloba ya ntina kati na mikapo”. Oyo nyonso alingi kozala ministre akoki, asengeli kotya likebi mingi na pwɛ́ oyo.

2 Osengeli kobimisa mayoki ntango ozali kotanga mikapo, nzokande olekisa ndelo te. Boike ya mayoki ekotalela yango moko mokapo mpe esika na yango kati na diskur. Kotanga mokapo ezali mpo na kosimbisa mateya oyo topesi, kasi ezali mpo na kobenda likebi likoló na motangi te.

3 Epai mosusu, kotanga esengeli komonisa polele eteni nini ya mokapo esimbi mpenza liteya oyo opesi. Esengeli kososolisa likanisi oyo bozali kolobana na yango, mpo ete endimisa bayoki. Soki mokapo etangami na ndenge ete maloba ya ntina mamonisami polele, ekopusa bayoki na kotyela yango motema. Kotanga malamu ekobakisaka kilo na maloba ya mokapo.

4, 5. “Komonisa maloba ya ntina” kati na mikapo elimboli nini? Pesa ndakisa.

4 Komonisa maloba ya ntina. Ntina oyo osaleli mokapo ekolakisa maloba nini osengeli konyata to kokesenisa na maloba mosusu kati na botangi. Soki maloba nyonso matangami se ndenge moko, bato bakoyeba te wapi oyo esimbi liteya na yo. Na yango, luka maloba oyo masimbi liteya oyo ozali kopesa, mpe kesenisa yango kati na botangi.

5 Na ndakisa, soki okamati mokapo ya Ezekiele 18:4 mpo na komonisa ete lisumu ekomemaka na móto ya lifelo te kasi na liwa, okotanga yango motindo boye: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa”; ekokoma yo na liloba akokufa, okonyata yango malamu mpo na komonisa ete liloba ya ntina yango wana. Nzokande, soki olingi komonisa ete ezali bobele nzoto te, kasi molimo nde ekufaka, okonyata nde maloba mosusu, kotangaka mokapo yango boye: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” Maloba oyo okonyata to okokesenisa na botangi na yo masengeli koponama engebene ntina oyo otangeli mokapo yango.

6-12. Motindo nini tokoki konyata to kokesenisa maloba ya mokapo oyo masimbi likanisi ya ntina?

6 Salela metode malamu. Metode mingi ezali mpo na konyata to kokesenisa kati na botangi maloba oyo mazali komonisa likanisi ya ntina. Okopona metode oyo okosalela engebene mokapo oyo okotanga mpe engebene kadre kati na yango diskur ekopesama.

7 Pwé oyo “Komonisa maloba ya ntina kati na mikapo” ekokoka te mpo na kolobela makambo nyonso matali accentuation to konyata makambo ya ntina. Ekolobelama nde mingimingi na mokapo ya ntuku misato na mibale. Nzokande awa tozali kolakisa yo mwa bametode mpo na kosalisa yo ete oyeba kotanga malamu mikapo ya Biblia oyo ozali kopesa.

8 Na mongongo. Okoki kobongola ton, vitese to volime ya mongongo mpo na komonisa kati na fraze maloba nini ozali na yango mposa mpo na kosimba likanisi oyo opesi.

9 Na kopema to poze. Okoki kosala poze to kopema, ezala liboso ya kotanga eteni ya ntina kati na mokapo to nsima na kotanga yango, to mpe poze mibale, moko liboso mpe mosusu nsima. Kosala poze liboso ya kotanga likanisi ya ntina, ezali kobenda likebi ya bayoki; kosala poze nsima na kotanga yango, ekomonisa epai na bayoki ete outi kotanga likambo ya ntina.

10 Kozongela. Okoki komonisa ete liloba boye to liloba boye ezali na ntina soki okokata naino botangi na yo mpe ozongeli kotanga liloba moko to fraze moko. Nzokande, osalela metode oyo mingimingi te.

11 Gestes. Bilakiseli na nzoto mpe na elongi ekoki mbala mingi kosalisa yo mpo na komonisa bato ete liloba boye to fraze boye ezali na ntina koleka.

12 Eleli ya mongongo. Na bantango mosusu, okoki kosalela metode oyo mpo na kokesenisa liloba moko na maloba mosusu, nzokande ebongi kosalela yango na mayele, mingimingi soki ozali kotanga maloba ya kotiola.

13, 14. Ntango totangisi mokapo epai ya moto mosusu, ndenge nini tokoki kosala mpo na konyata maloba ya ntina?

13 Mikapo oyo otangisi na moto mosusu. Na ntango opesi moto mokapo ete atanga, mbala mosusu akotanga yango kozanga konyata maloba ya ntina to abongoli mongongo soki mpe atelemi na bisika bisengeli te. Na yango, soki moto asilisi kotanga, okoki kobenda likebi na ye likoló na maloba ya ntina, na kozongelaka kotanga yango yo moko, to na kotunaka mituna na ntina na yango.

14 Metode mosusu ezali, kasi ebongi kosalela yango na boboto mpo ete ezokisa motangi te. Ezali boye ete okoki kosenga eskize epai ya motangi ete atelema naino soki akomi na esika oyo ozali na yango mposa; na nsima okobenda likebi na ye likoló na liloba to likoló na fraze oyo olingi konyata. Ezali metode moko malamu soki nde okokoka kosalela yango kozanga kobulunganisa motangi mpe kozanga kosilikisa ye. Nzokande ebongi kosalela yango mbala na mbala te.

15-17. Mpo na nini ezali likambo na ntina na kolimbola malamu ndenge ya kosalela mikapo?

15 Okoki kotanga mokapo na konyataka maloba ya ntina, nzokande mbala mingi ekoki te mpo na kobimisa ntina na yango nyonso. Ya solo, mbala mosusu mokapo yango moko ezali komonisa ndimbola na yango to ndenge ya kosalela yango. Nzokande, mbala mingi esengeli lisusu kobenda likebi ya moto likoló na maloba oyo masimbi likanisi ya ntina mpe kolimbola malamu ndenge nini ekokani na lisolo oyo bozali kosolola. Yango nde likambo ezali kotalelama na pwɛ́ oyo “Kolimbola malamu ndenge ya kosalela mikapo”, pwɛ́ oyo tozali kokuta yango kati na fiche ya Toli mpo na balobi. Kobosana te ete bato mingi bayebi Biblia te mpe bakoki te kosimba likanisi na yo bobele na kotanga mpamba. Kobimisa polele maloba ya ntina mpe kolimbola malamu ndenge ekokani na lisolo ekopesa nzela na bayoki na yo ete basimba likanisi na yo.

16 Mpo na kolimbola malamu mokapo, esengeli ete eyokana na lisolo na yo, mpe ebongi ete osalela maloba makoki liboso ya kotanga yango. Na nsima, komikundolaka makoki ya molakisi malamu, okoluka kolimbola yango na lolenge ya petee.

17 Epai mosusu, yo moko osengeli koyeba malamu ndimbola ya mokapo mpo okoka kolakisa na moyoki na yo ete etali likambo boye to likambo boye. Tala baversets oyo ezali liboso mpe baversets oyo ezali nsima, talela mitinda mikokani na yango, mpe soki esengeli, talela bato balobelami wana. Kobakisa eloko mosusu te na mokapo, oyo mokomi alobaki yango te. Mpo na kolimbola malamu mikapo ete etali likambo boye to likambo boye, landa ntango nyonso ndimbola epesami na mikanda ya la Société.

18. Ndenge nini tokoki komonisa polele maloba ya ntina oyo tosengeli kolimbola?

18 Komonisa maloba ya ntina polele. Liboso ya kolimbola mokapo to na ntango ozali kolimbola yango, esengeli omonisa lisusu polele maloba ya ntina. Kosalaka bongo, maloba nyonso oyo matali lisolo na yo te makotikala pembeni. Okolonga na yango soki okosalela maloba mazali kati na verset, nzokande okoki kosalela mpe metode mosusu mpo na kolonga na yango. Na bantango mosusu, okoki komonisa polele likanisi ya ntina kozanga ete ozongela maloba ya verset. Metode moko ezali ete osalela maloba mosusu mazali na ndimbola moko na maloba mazali na verset, mosusu ezali boye ete otuna motuna. Soki ozali kolobana na moto moko, mituna na yo mikoki kosalisa ye na kobimisa makanisi ya ntina.

19-22. “Monisa lisusu ntina oyo otangeli mokapo yango” elimboli nini?

19 Monisa lisusu ntina oyo otangeli mokapo yango. Ebongi oluka koyeba ete moto asimbi ntina mpo na yango otangeli ye mokapo wana. Ekoki kozala ete, mpo na ntina moko to mosusu, osalelaki maloba ya ebandeli te liboso ya kotanga mokapo. Nzokande ata bongo, okoki koyebisa moto ntina oyo otangeli mokapo yango. Kasi mingimingi ezalaka ete osilaki kopesa maloba ya ebandeli liboso ya kotanga mokapo, mpe nsima na kotanga yango, esengeli ete omonisa lisusu ntina oyo otangeli yango.

20 Motindo na bayoki mpe bonene ya likanisi wana kati na diskur, yango nde ekokata lolenge boni ya bosaleli okoki kolakisa mpo na mokapo wana. Mingimingi ekoki te bobele kopesa komantere likoló na verset. Osengeli komonisa boyokani nini ezali kati na makanisi malakisami na mokapo mpe likanisi oyo osalelaki na ebandeli. Osengeli komonisa boyokani yango sikisiki.

21 Okolonga na mokano yango soki okobakisa mindondo mingi te na motindo na yo ya kolakisa ndenge ya kosalela mokapo. Salela motindo ya petee, longola makambo nyonso oyo matali yango te. Loba bobele makambo oyo mazali na ntina mpenza mpe bakisa bobele oyo esengeli mpo ete moto akanga ntina. Soki otunaki motuna na maloba na yo liboso ya kotanga mokapo mpe oyanolaki yango te, esengeli oyanola yango na ntango ozali kolimbola mokapo mpe ozali komonisa ndenge ya kosalela yango.

22 Ekomi yo na esika oyo kati na programme ya Kobongisama mokemoke mpo na kozala molobi abongi, osengeli koluka ete badiskur na yo ezala petee mpe alima. Soki olongi na yango, wana botangi na yo mpe bolimboli na yo ya mikapo ya Biblia ekomonisa ete ozali molakisi akoki mpe na mayele.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto