Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 6
  • Mwana malamu ná mwana mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwana malamu ná mwana mabe
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bandeko mibale oyo bakesanaki na bizaleli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Nkanda etindaki ye aboma
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Tópesa Yehova mbeka oyo akondima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Atako akufá, azali naino koloba”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 6

Lisolo 6

Mwana malamu ná mwana mabe

BÓTALA Kaina ná Abele. Bakómi mikóló. Kaina azali mosali-bilanga. Azali kolona masango, mbuma ná ndunda.

Abele akómi mobateli ya mpate. Kobatela bana ya mpate ezali kosepelisa ye mingi. Bana ya mpate bakoli mpe mosika te Abele akómi kobatela bampate mingi.

Mokolo moko Kaina ná Abele bamemeli Nzambe mabonza. Kaina ayei na mbuma ya elanga mpe Abele ayei na mpate oyo eleki kitoko kati na bampate na ye. Yehova andimi Abele ná libonza na ye, kasi aboyi Kaina ná libonza na ye. Boyebi mpo na nini Nzambe andimaki Abele kasi aboyi Kaina?

Ezali te mpo libonza ya Abele elekaki kitoko. Kasi nde mpo Abele azali moto malamu. Alingi Yehova mpe alingi ndeko na ye. Kasi Kaina azali moto mabe, mpe alingi ndeko na ye te.

Yango wana, Nzambe alobi na Kaina ete abongola motema. Kasi Kaina aboyi. Ayoki nkanda makasi mpo Nzambe alingi Abele. Bongo Kaina alobi na Abele ete: ‘Yaká tókende na bilanga!’ Kuna na elanga bazali kaka bango mibale. Kaina abɛti leki na ye makasi mpe leki na ye akufi. Talá likambo ya nsɔmɔ!

Abele azali lisusu na bomoi te, kasi Nzambe azali kokanisa ye. Azalaki moto malamu mpe Yehova abosanaka bato ya ndenge wana te. Mokolo mosusu, Yehova Nzambe akozongisa ye na bomoi. Na ntango yango Abele akokufa lisusu te. Akozala na bomoi libela na mabele. Tokozala mpenza na esengo ya koyeba bato lokola Abele!

Kasi Nzambe asepelaka na bato oyo bakokani na Kaina te. Yango wana, ntango Kaina abomaki leki na ye, Nzambe apesaki ye etumbu, atindaki ye mosika na baboti na ye. Ntango Kaina akei kofanda epai mosusu, akendeki na leki na ye moko ya mwasi, mpe akómaki mwasi na ye.

Na nsima, Kaina ná mwasi na ye babotaki bana. Bana mosusu ya basi ná ya mibali oyo Adama ná Eva babotaki, babalanaki mpe babotaki bana. Yango wana bato bakómaki ebele noki mpenza na mokili. Tokolobela bato mosusu na kati na bango.

Ebandeli 4:2-26; 1 Yoane 3:11, 12; Yoane 11:25.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto