Lisolo 20
Likama ekómeli Dina
BOZALI komona bana basi oyo Dina ayei kotala? Akei kotala bana basi ya Kanana. Okanisi ete tata na ye Yakobo akosepela na likambo yango? Kanisá lisusu ndenge Abrahama ná Yisaka bazalaki kotalela basi ya Kanana.
Abrahama alingaki ete mwana na ye Yisaka abala mwasi ya mokili ya Kanana? Te. Yisaka ná Rebeka balingaki ete mwana na bango Yakobo abala mwasi ya mokili ya Kanana? Te. Boyebi mpo na nini balingaki te?
Mpo bato ya Kanana bazalaki kosambela banzambe ya lokuta. Yango wana, bakokaki kozala mibali malamu te mpe basi malamu te, mpe lisusu bakokaki kozala baninga malamu te. Na yango, Yakobo akokaki kosepela te ete Dina akóma moninga ya bana basi ya Kanana.
Nsukansuka, likama ekómeli Dina. Na elilingi oyo, ozali komona mobali wana, moto ya Kanana, oyo azali kotala Dina? Nkombo na ye Shekeme. Mokolo moko Dina akei kotala baninga na ye, Shekeme akangi ye na makasi mpe alali na ye. Yango ezalaki mabe, mpo kaka mwasi ná mobali oyo babalaná nde bazali na lotomo ya kosangisa nzoto. Kosambwisa oyo Shekeme asambwisaki Dina ebimisaki mikakatano mosusu.
Ntango bandeko ya Dina ya mibali bayoki likambo yango, bayokaki nkanda makasi mpenza. Mibale kati na bango, Simeone ná Levi, bakamati moto na moto mopanga na ye mpe bakɔteli mibali ya mboka wana na ntango oyo bayebi te. Bango ná bandeko na bango babomi Shekeme ná mibali mosusu. Likambo ya mabe wana oyo bana ya Yakobo basalaki esepelisaki ye te.
Mpo na nini likambo ya mabe boye esalemaki? Ezali mpo Dina akómaki moninga ya bato oyo bazali kotosa mibeko ya Nzambe te. Tókeba, tólanda ndakisa na ye te.