Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 23
  • Ndɔtɔ ya Farao

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndɔtɔ ya Farao
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • “Nzambe nde alimbolaka makambo, boye te?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yehova abosanaki Yozefe te
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Ozalaka na zuwa? Bandeko ya Yozefe bayokelaki ye zuwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yozefe na kati ya bolɔkɔ
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 23

Lisolo 23

Ndɔtɔ ya Farao

MBULA mibale mobimba eleki, Yozefe azali naino na bolɔkɔ. Kapita ya bapesi-masanga ya Farao akanisaki ye te. Kasi na butu moko boye, Farao alɔti ndɔtɔ mibale ya ndenge mosusu mpenza, mpe aluki koyeba ndimbola na yango. Bozali komona Farao alali na mbeto na ye? Na ntɔngɔ, Farao abengisi bato na ye nyonso ya bwanya mpe ayebisi bango bandɔtɔ alɔtaki. Kasi bakokaki kolimbolela ye bandɔtɔ yango te.

Bongo na nsima, kapita ya bapesi-masanga akanisi Yozefe. Alobi na Farao ete: ‘Ntango nazalaki na bolɔkɔ, ezalaki na moto moko kuna oyo ayebi kolimbola bandɔtɔ.’ Farao abimisi Yozefe na bolɔkɔ mbala moko.

Farao ayebisi Yozefe bandɔtɔ na ye, alobi boye: ‘Liboso namonaki ngɔmbɛ nsambo ya minene, mpe ya kitoko. Mpe na nsima namoni ngɔmbɛ nsambo oyo ekɔndakɔndá mpe ya mikuwamikuwa. Mpe bangɔmbɛ oyo ekɔndakɔndá emɛli oyo ya minene.

‘Na ndɔtɔ ya mibale, namonaki mitó nsambo ya blé ya kitoko, oyo etondá, ezali na nzete moko. Na nsima, namoni mitó nsambo mosusu ya blé oyo ekaukakauká. Mitó nsambo ya blé oyo ekaukakauká emɛlaki mitó nsambo ya blé ya kitoko oyo etondá.’

Yozefe ayebisi Farao ete: ‘Ndɔtɔ nyonso mibale ezali na ndimbola moko. Ngɔmbɛ nsambo ya mafuta mpe mitó nsambo ya blé ya kitoko oyo etondá elakisi mbula nsambo; ngɔmbɛ nsambo oyo ekɔndakɔndá mpe mitó nsambo ya blé oyo ekaukakauká ezali mpe mbula nsambo. Talá mbula nsambo ezali koya, oyo biloko ekozala ebele na Ezipito. Kasi mbula nsambo oyo ekoya nsima na yango ekozala na nzala makasi mpenza.’

Bongo Yozefe ayebisi Farao ete: ‘Poná moto moko ya bwanya mpe pesá ye mokumba ya kosangisa mpe kobomba bilei na mbula nsambo ya malamu. Bongo bato bakokufa nzala te na mbula nsambo oyo biloko ekozanga.’

Farao asepeli na likanisi yango. Mpe aponi Yozefe asangisa biloko mpe abomba yango. Bongo Yozefe akómi moto oyo aleki bato nyonso na Ezipito, nsima ya Farao.

Mbula mwambe na nsima, Yozefe amoni bato moko boye bayei na Ezipito. Boyebi bato yango? Bayaya na ye zomi. Yakobo, tata na bango, atindi bango na Ezipito mpo nzala ekɔtaki na mokili ya Kanana. Yozefe ayebi bandeko na ye, kasi bango bayebi ye lisusu te. Oyebi mpo na nini bayebi ye te? Mpo Yozefe akómá mokóló mpe alati bilamba ya ndenge mosusu.

Bongo Yozefe akanisaki bandɔtɔ na ye ya bomwana, oyo amonaki bandeko na ye bayei kogumbamela ye. Oyebi lisusu ete totángaki yango? Bongo Yozefe ayaki koyeba ete Nzambe atindaki ye na Ezipito na ntina. Sikoyo Yozefe akosala nini? Tiká tóleka na lisolo oyo elandi.

Ebandeli 41:1-57; 42:1-8; 50:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto