Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 25
  • Yakobo akómi na Ezipito

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yakobo akómi na Ezipito
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yehova abosanaki Yozefe te
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • “Ngai nazali nde na esika ya Nzambe?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Bandeko ya Yozefe batɛki ye
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Nabondeli bino, bóyoka ndɔtɔ oyo nalɔti”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 25

Lisolo 25

Yakobo akómi na Ezipito

YOZEFE akangi lisusu motema te. Abimisi basaleli na ye nyonso. Lokola atikali kaka ye na bandeko na ye, abandi kolela. Bandeko na ye bakamwe mingi mpo bayebaki ntina azali kolela te. Na nsuka, ayebisi bango ete: ‘Ngai nde Yozefe. Tata na ngai azali naino na bomoi?’

Bandeko na ye bakamwe mpe bakokaki kozongisa liloba te. Nsɔmɔ ezwi bango. Bongo Yozefe alobi na bango ete: ‘Nabondeli bino, bópusana pene na ngai.’ Ntango bapusani alobi na bango ete: ‘Ngai nde Yozefe ndeko na bino, oyo bino botɛkaki na Ezipito.’

Mpe Yozefe ayebisi bango lisusu na boboto ete: ‘Bómitungisa te ndenge botɛkaki ngai. Nzambe nde moto atindaki ngai na Ezipito mpo na kobikisa bomoi ya bato. Farao atye ngai mokonzi ya mokili oyo mobimba. Sikoyo bózonga noki epai ya tata na ngai mpe bóyebisa ye likambo yango. Bóloba na ye aya kofanda na Ezipito.’

Bongo Yozefe ayambi bandeko na ye mpe abandi kopesa bango mapwɛpwɛ. Ntango bayebisi Farao ete bandeko ya Yozefe bayei, alobaki na Yozefe ete: ‘Báluka bapusu mpe bákende kokamata tata na bango mpe mabota na bango, mpe báya kofanda awa! Nakopesa bango biloko oyo eleki malamu na mokili ya Ezipito.’

Basalaki mpe bongo. Yakobo akitaki na Ezipito ná libota na ye mobimba. Bozali komona ndenge Yozefe ná tata na ye bazali koyambana?

Libota ya Yakobo ekómaki monene mingi. Bango nyonso oyo bakitaki na Ezipito bazalaki bato ntuku nsambo (70): Yakobo, bana na ye ná bankɔkɔ na ye; longola basi na bango mpe ntango mosusu ná basaleli na bango. Baoyo wana nyonso bayaki kofanda na Ezipito. Bazalaki kobenga bango Bayisraele, mpo Nzambe apesaki Yakobo nkombo mosusu: Yisraele. Ndenge tokomona yango nsima, Bayisraele bakómaki libota oyo Nzambe aponi.

Ebandeli 45:1-28; 46:1-27.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto