Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 52
  • Gideone ná bato na ye 300

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Gideone ná bato na ye 300
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • “Mopanga ya Yehova mpe ya Gideona!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Gideone alongaki bato ya Midiane
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bankulutu​—Bózwa mateya na ndakisa ya Gideone
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Yehova azali moninga na biso ya motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 52

Lisolo 52

Gideone ná bato na ye 300

OZALI komona likambo oyo ezali kosalema awa? Bato oyo nyonso ezali basoda ya Yisraele. Mibali oyo bagunzami bazali komɛla mai. Bongo oyo atɛlɛmi pene na bango ezali Gideone, azali mosambisi. Azali kotala ndenge bazali komɛla mai.

Bongo tótala ndenge basoda yango bazali komɛla mai. Basusu batye bilongi na mai. Moko azali komɛla mai na lobɔkɔ, mpo akoka komonaka makambo oyo ezali koleka zingazinga na ye. Komɛla bongo ezali na ntina, mpo Yehova alobi na Gideone apona kaka baoyo bakobanda kokɛngɛla ntango bazali komɛla mai. Baoyo bakosala bongo te basengeli kozonga. Mpo na nini asɛngaki likambo ya ndenge wana?

Bayisraele bakómi lisusu na mpasi, mpo batosi Yehova te. Bato ya Midiane baleki bango na makasi mpe bakómi konyokola bango. Bongo Bayisraele babeleli Yehova asalisa bango, mpe Yehova ayoki kolela na bango.

Yehova atindi Gideone aluka basoda, mpe Gideone asangisi bato nkóto ntuku misato na mibale (32 000). Kasi banguna bazali na basoda nkóto nkama moko na ntuku misato na mitano (135 000). Ata bongo Yehova alobi na Gideone ete: ‘Bato na yo baleki ebele.’ Mpo na nini?

Mpo soki Yisraele alongi etumba, bakoki kokanisa ete balongi na makasi na bango moko kasi na makasi ya Yehova te. Yango wana Yehova alobi na Gideone ete: ‘Yebisá baoyo nyonso bazali kobanga bázonga epai na bango.’ Ntango Gideone ayebisi bango, basoda nkóto ntuku mibale na mibale (22 000) bazongi epai na bango. Atikali kaka na bato nkóto zomi (10 000) mpo na kobunda na banguna nkóto nkama moko na ntuku misato na mitano (135 000).

Kasi Yehova alobi na Gideone ete: ‘Bato bazali kaka mingi.’ Yango wana, atindi Gideone ete amɛlisa bato na ye mai, mpe azongisa baoyo nyonso bakotya elongi mobimba na mai. Yehova alakaki ye ete: ‘Nakolongisa bino na bato nkama misato (300) oyo bazalaki kokɛngɛla ntango bazali komɛla mai.’

Ntango ya etumba ekoki. Gideone akaboli bato na ye nkama misato na bituluku misato. Apesi moto mokomoko liseke mpe elokó oyo ezali mpamba ná esungi ya mɔtɔ na kati. Na katikati ya butu, bazingi kaa ya banguna. Lokola bapesanaki elembo, bango nyonso bayuli maseke, babuki bilokó na bango mpe bagangi ete: ‘Mopanga ya Yehova mpe ya Gideone!’ Banguna balamuki na nsɔmɔ, babulungani mpe bakimi. Bayisraele balongi etumba.

Basambisi mokapo 6 tii 8.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto