Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 61
  • Davidi akómi Mokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Davidi akómi Mokonzi
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Davidi ná Saulo
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Davidi akimi Saulo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Na kati ya 1 Samwele
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • “Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 61

Lisolo 61

Davidi akómi Mokonzi

SAULO aluki lisusu koboma Davidi. Akamati basoda nkóto misato (3 000) mpe alandi ye. Ntango Davidi ayoki likambo yango, atindi bato bákende kotala esika Saulo ná basoda na ye balali na butu wana. Bongo Davidi atuni bato mibale kati na bato na ye ete: ‘Nani akokende na ngai na kaa ya Saulo?’

Abishai alobi ete: ‘Ngai.’ Abishai azali mwana ya Zeruya, ndeko mwasi ya Davidi. Ntango Saulo ná bato na ye balali, Davidi ná Abishai bakɔti nokinoki na kaa na mayele. Bazwi likɔnga ya Saulo ná elokó na ye ya mai, oyo ezalaki pene na motó na ye. Kasi moto amoni bango te, ayoki mpe bango te, mpo balalaki mpɔngi makasi mpenza.

Bótala Davidi ná Abishai sikoyo. Babimi na kaa mpe bamati na nsɔngɛ ya ngomba. Na nsima, Davidi abandi kobelela Abinere, mokonzi ya basoda ete: ‘Mpo na nini obateli nkolo na yo mokonzi te? Talá! Wapi likɔnga na ye ná elokó na ye ya mai?’

Saulo alamuki. Ayebi mongongo ya Davidi, mpe atuni ete: ‘Ezali yo, Davidi?’ Bozali komona Abinere ná Saulo awa na nse?

Davidi azongisi ete: ‘Ezali ngai, nkolo na ngai mokonzi.’ Bongo Davidi atuni ete: ‘Mpo na nini ozali koluka kokanga ngai? Mabe nini nasali? Ee mokonzi, talá likɔnga na yo! Moko ya bato na yo aya kozwa yango!’

Saulo andimi ete: ‘Nasali lisumu. Nasali likambo ya bozoba.’ Na nsima Davidi asimbi nzela akei mpe Saulo azongi epai na ye. Kasi Davidi alobi na motema na ye ete: ‘Mokolo mosusu Saulo akoboma ngai. Nasengeli kokima na mokili ya Bafilistia.’ Asali mpe bongo. Davidi abubi Bafilistia mpo bákanisa ete akómi sikoyo na ngámbo na bango.

Nsima ya mwa mikolo, Bafilistia bakei kobundisa Yisraele. Saulo ná Yonatane bakufi na etumba yango. Likambo yango epesi Davidi mawa mingi, mpe asali nzembo moko kitoko mpenza, na maloba oyo: ‘Nayoki mpasi mingi mpo na yo, ndeko na ngai Yonatane! Ozalaki mpenza moninga na ngai ya motema!’

Nsima na yango, Davidi azongi na Yisraele, na engumba Hebrone. Kuna, etumba ebimi kati na bato oyo baponi Ishi-boshete, mwana ya Saulo, azala mokonzi, mpe baoyo balingi Davidi azala mokonzi. Bato ya Davidi balongi. Davidi akómi mokonzi ntango azali na mbula ntuku misato (30). Ayangeli mbula nsambo na sanza motoba na Hebrone. Bana na ye mosusu babotamaki na engumba yango: Aminone, Abisalome ná Adoniya.

Mokolo moko, Davidi ná bato na ye bamati na Yerusaleme mpo na kozwa mboka kitoko yango. Yoabe, mwana mosusu ya Zeruya, ndeko ya Davidi, akambi etumba yango. Davidi afuti ye, atye ye mokonzi ya basoda na ye. Bongo Davidi abandi koyangela na engumba Yerusaleme.

1 Samwele 26:1-25; 27:1-7; 31:1-6; 2 Samwele 1:26; 3:1-21; 5:1-10; 1 Ntango 11:1-9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto