Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 88
  • Yoane abatisi Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yoane abatisi Yesu
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yesu azwi batisimo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu abandi kokómisa bato bayekoli
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Batisimo na Yesu
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Bayekoli ya liboso ya Yesu
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 88

Lisolo 88

Yoane abatisi Yesu

BOMONI ebenga oyo ekiteli moto wana na motó? Moto yango nde Yesu. Sikoyo azali na mbula pene na ntuku misato (30). Moto oyo azali elongo na ye nkombo na ye Yoane. Tolobelaki ye mwa moke liboso. Boyebi lisusu likambo oyo esalamaki ntango Maria akómaki epai ya ndeko na ye Elizabeti, bongo mwana oyo azalaki na libumu ya Elizabeti apumbwe na esengo? Mwana yango nde Yoane. Kasi awa, Yoane ná Yesu bazali kosala nini?

Yoane auti kozindisa Yesu na mai na Ebale Yordani. Yango nde ndenge moto asengeli kozwa batisimo. Liboso, bazindisi moto nzoto mobimba na kati ya mai mpe na nsima babimisi ye. Lokola Yoane azalaki kobatisa bato, yango wana bazalaki kobenga ye Yoane Mobatisi. Kasi mpo na nini abatisaki Yesu?

Yoane abatisaki Yesu mpo Yesu ayaki epai na ye mpe asɛngi ete abatisa ye. Yoane azali kobatisa bato oyo bayei epai na ye mpo na komonisa polele ete babongoli motema, batiki makambo na bango ya mabe. Bongo Yesu asalaki likambo oyo ekokaki kotinda ye abongola motema? Te, mpo Yesu azali Mwana ya Nzambe, mpe auti na likoló. Kasi ye asɛngaki Yoane abatisa ye mpo na ntina mosusu. Tiká tóluka koyeba ntina yango.

Liboso Yesu aya epai ya Yoane, azalaki mosali-mabaya. Mosali-mabaya ezali moto oyo asalaka bamesa ná bakiti. Yozefe azalaki mosali-mabaya, mpe ateyaki Yesu mosala yango. Kasi Yehova atindaki Mwana na ye awa na mabele mpo azala mosali-mabaya te. Atindaki ye nde mpo asala mosala moko ya ntina mingi mpe ntango ekokaki mpo abanda mosala yango. Yango wana, mpo Yesu amonisa polele ete alingi sikoyo kosala mokano ya Tata na ye, asɛngi Yoane abatisa ye. Nzambe asepeli na likambo yango?

Ɛɛ, mpo, ntango Yesu abimi na mai, mongongo moko euti na likoló elobi ete: ‘Oyo Mwana na ngai, nasepeli na ye mingi.’ Lisusu, likoló esali lokola efungwani mpe ebenga ekiteli Yesu. Kasi ezali ebenga ya solo te, elimo santu ya Nzambe nde ekitelaki ye lokola ebenga.

Yesu asengeli kokanisa makambo ebele mpenza; yango wana akei na esika oyo akozala kaka ye moko, mikolo ntuku minei (40). Kuna Satana ayeli ye. Ameki ye mbala misato mobimba ete abuka mibeko ya Nzambe. Kasi Yesu asali bongo te.

Nsima na yango, Yesu azongi mpe akutani na bato moko boye oyo bakómi bayekoli na ye ya liboso. Nkombo na bango yango oyo: Andre, Petro (babengaka ye mpe Simo), Filipe ná Natanaele (babengaka ye mpe Bartelemi). Yesu ná bayekoli na ye ya liboso wana bakei na Galile. Batɛlɛmi na Kana, mboka ya Natanaele. Fɛti moko ya libala ezali kosalema wana, Yesu akei na fɛti yango, mpe kuna asali likamwisi na ye ya liboso. Oyebi likamwisi yango? Akómisi mai vinyo.

Matai 3:13-17; 4:1-11; 13:55; Marko 6:3; Yoane 1:29-51; 2:1-12.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto