Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 104
  • Yesu azongi na Likoló

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu azongi na Likoló
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 104

Lisolo 104

Yesu azongi na Likoló

YESU amonani na bayekoli na ye mbala mingi lisusu. Mokolo moko, amonani na bayekoli soki nkama mitano (500) na mbala moko. Ntango abimeli bango, boyebi makambo ayebisi bango? Ayebisi bango makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Yehova atindaki Yesu awa na mabele mpo ateya bato makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Mpe Yesu akobaki kosala yango ata na nsima ya lisekwa na ye.

Bongo bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ezali guvɛrnema ya solo ya Nzambe oyo ezali na likoló, mpe Yesu nde moto Nzambe aponi azala Mokonzi na Bokonzi yango. Ndenge toyekolaki yango, Yesu amonisaki ete akozala mokonzi malamu mingi na ndenge aleisaki bato ya nzala, abikisaki bato ya maladi mpe asekwisaki bakufi.

Bongo ntango Yesu akozala Mokonzi na likoló na boumeli ya mbula nkóto, mabele ekozala ndenge nini? Mabele mobimba ekokóma paradiso moko kitoko. Bitumba, makambo ya mabe, maladi ata mpe liwa ekozala lisusu te. Toyebi ete yango ekozala bongo mpo Nzambe asalaki mabele ezala paradiso. Yango wana, na ebandeli, asalaki liboso elanga ya Edene. Na ndenge yango, Yesu akokokisa mokano ya Nzambe mpo na mabele.

Sikoyo ntango ekoki ete Yesu azonga na likoló. Amimonisi epai ya bayekoli na ye mikolo ntuku minei (40). Bandimi mpenza ete azali na bomoi lisusu. Kasi, liboso atika bayekoli na ye, alobi na bango ete: ‘Bótikala na Yerusaleme tii bokozwa elimo santu.’ Elimo santu ezali nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala; ezali lokola mopɛpɛ, mpe elimo yango ekosalisa bayekoli básala mokano ya Nzambe. Na nsuka, Yesu ayebisi bango ete: ‘Bokosakola makambo oyo etali ngai tii na esika oyo eleki mpenza mosika na mabele.’

Ntango Yesu asilisi koloba boye, likambo moko ya kokamwa esalemi. Abandi komata na likoló, ndenge bozali komona yango na elilingi oyo. Na nsima, lipata ezipi ye mpe bayekoli bakoki komona ye lisusu te. Yesu akei na likoló mpe kuna abandi koyangela bayekoli na ye awa na mabele.

1 Bakorinti 15:3-8; Emoniseli 21:3, 4; Misala 1:1-11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto