Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 105
  • Bazeli na Yerusaleme

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazeli na Yerusaleme
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Bayekoli bazwi elimo santu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bato ebele bamoni ye liboso ya Pantekote
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Komonana ya nsuka mpe Pantekote ya mobu 33
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Komonana ya nsuka mpe Pantekote ya mobu 33
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 105

Lisolo 105

Bazeli na Yerusaleme

BATO oyo bozali komona awa ezali bayekoli ya Yesu. Batikali na Yerusaleme, ndenge Yesu ayebisaki bango. Wana bafandi bango nyonso elongo bazali kozela, na mbala moko, lokito moko lokola oyo ya mopɛpɛ makasi eningisi ndako oyo bazali. Na nsima, ndemo ya mɔtɔ emonani na mitó ya moyekoli mokomoko. Ozali komona ndemo yango ya mɔtɔ na mitó na bango? Yango elingi koloba nini?

Ezali likamwisi! Yesu azongi na likoló epai ya Tata na ye, mpe asopeli bayekoli na ye elimo santu ya Nzambe. Elimo yango ekotinda bayekoli yango básala nini? Bango nyonso babandi koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge.

Bato mingi na Yerusaleme bazali koyoka makɛlɛlɛ wana mpe bayei mbangu kotala nini ezali kosalema. Bato mosusu bauti na mikili ndenge na ndenge, mpe bayei na Yerusaleme mpo na kosala fɛti ya Pantekote. Bato yango bakamwe mingi. Bayoki bayekoli bazali koloba, na monɔkɔ ya mboka ya moto mokomoko na kati na bango, makambo ya malamu oyo Nzambe asalaki.

Bapaya yango balobi ete: ‘Bato oyo nyonso bazali bato ya Galile. Bongo ndenge nini bazali koloba minɔkɔ ya bamboka oyo touti?’

Bongo Petro atɛlɛmi mpo na kolimbwela bango. Alimbweli bato ndenge Yesu abomamaki mpe na nsima Yehova asekwisaki ye. Na nsima Petro alobi ete: ‘Sikoyo Yesu azali na likoló, na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe. Mpe asopi elimo santu oyo alakaki. Yango wana bomoni mpe boyoki makamwisi oyo.’

Ntango Petro alobi makambo wana, mingi bayoki mawa mpo na makambo oyo basalelaki Yesu. Bongo batuni Petro ete: ‘Tosengeli kosala nini?’ Ntoma Petro ayebisi bango ete: ‘Bóbongola mitema mpe bóbatisama.’ Na mokolo yango, bato soki nkóto misato (3 000) bazwi batisimo mpe bakómi bayekoli ya Yesu.

Misala 2:1-47.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto