Lisolo 106
Anzelu abikisi bango
OYO bozali komona asimbi porte ya bolɔkɔ ezali anzelu. Bato oyo ye abikisi ezali bantoma ya Yesu. Tótala mpo na nini bakangaki bango.
Eleki naino ntango mingi te banda bayekoli ya Yesu bazwi elimo santu. Bongo talá likambo oyo esalamaki mokolo moko boye, nsima na midi, ntango Petro ná Yoane bazali kokende na tempelo. Pene na porte, ezalaki na moto moko oyo makolo na ye ebebá banda kobotama. Mokolo na mokolo bazalaki koya na ye wana mpo asɛngaka bato oyo bazali koya na tempelo mbongo. Ntango moto yango amoni bantoma, Petro ná Yoane, asɛngi bango mbongo. Bakosala nini?
Batɛlɛmi, batali ye. Petro alobi na ye ete: ‘Nazali na mbongo te, kasi nakopesa yo oyo nazali na yango. Na nkombo ya Yesu, tɛlɛmá mpe tambolá!’ Na nsima, Petro asimbi ye na lobɔkɔ ya mobali, na mbala moko, moto yango atɛlɛmi mpe abandi kotambola. Ntango bato bamoni likamwisi yango, bakamwe mpe basepeli mingi.
Na nsima Petro alobi ete: ‘Tosali likamwisi oyo nde na nguya ya Nzambe, oyo asekwisaki Yesu.’ Nzokande, ntango ye ná Yoane bazali koloba, bakonzi ya mangomba babimeli bango. Basiliki makasi mpo Petro ná Yoane bazali koyebisa bato ete Yesu asekwi. Yango wana bakangi bango mpe batye bango na bolɔkɔ.
Na mokolo oyo elandi, bakonzi ya mangomba basali likita ya monene. Bayei na Petro ná Yoane, mpe moto oyo babikisaki. Bongo batuni ete: ‘Na nguya nini bosali likamwisi oyo?’
Petro azongiseli bango ete, tosali yango na nguya ya Nzambe, oyo asekwisaki Yesu. Banganga-nzambe basili mayele, mpo bakoki koboya kondima likambo yango te; likamwisi ya monene wana esalamaki mpenza. Bongo bakebisi bantoma ete báloba lisusu na nkombo ya Yesu te mpe batiki bango bákende.
Mikolo ezali koleka, mpe bantoma bazali kokoba kosakola na nkombo ya Yesu mpe kobikisa bato. Nsango ya makamwisi yango epalangani. Yango wana, ebele ya bato bauti na bamboka oyo ezali pembenipembeni ya Yerusaleme, bayei na bato ya maladi mpo bantoma bábikisa bango. Bakonzi ya mangomba bayoki zuwa; na yango bakangi bantoma mpe babwaki bango na bolɔkɔ. Kasi baumeli na bolɔkɔ yango te.
Na butu, anzelu ya Nzambe ayei kofungola porte ya bolɔkɔ, ndenge bozali komona na elilingi oyo. Alobi na bantoma ete: ‘Bókende, bótɛlɛma na tempelo, mpe bókoba koloba na bato.’ Na ntɔngɔ, bakonzi ya mangomba batindi bato bákende kozwa bantoma na bolɔkɔ, kasi bakuti moto te. Na nsima, bakuti bango bazali koteya bato na tempelo, bongo bakangi bango, bakei na bango na ndako ya Sanedrina.
Bakonzi ya mangomba balobi na bango ete: ‘Topesaki bino mitindo polelepolele ete bóteya lisusu na nkombo ya Yesu te. Kasi botondisi Yerusaleme na mateya na bino.’ Bongo bantoma bazongiseli bango ete: ‘Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.’ Bongo bakobi kosakola “nsango malamu.” Wana ezali mpenza ndakisa malamu oyo tosengeli kolanda.