Lisolo 115
Paradiso ya sika na mabele
BÓTALA banzete ya minene, bafololo ya kitoko mpe bangomba ya milai. Esika yango ezali kitoko mpenza. Mboloko ezali kolya na lobɔkɔ ya mwana mobali wana. Bankɔsi efandi na kimya mpenza, mpe bampunda ezali kolya matiti na nsima na yango. Nani akoboya kofanda na esika kitoko boye?
Nzambe alingi ete bózala na bomoi ya seko na mabele, na kati ya paradiso. Alingi mpe kobikisa bino na mpasi nyonso oyo ezali konyokola bato lelo. Talá elaka oyo Biblia epesi bato nyonso oyo bakozala na bomoi na paradiso ya sika: ‘Nzambe akozala na bango. Liwa, ná koganga, ná mpasi, ekozala lisusu te. Makambo ya kala eleki.’
Yesu Kristo nde moto akosala makambo ya malamu wana. Oyebi ntango akosala yango? Akosala yango nsima ya kolongola mabe ná bato mabe nyonso awa na mabele. Kobosana te ete ntango Yesu azalaki awa na mabele, abikisaki bato ya maladi, kutu asekwisaki bakufi. Yesu asalaki nyonso wana mpo na komonisa makambo oyo akosala na mabele mobimba ntango akozala Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe.
Kofanda na paradiso ya sika awa na mabele ekozala malamu mingi! Yesu Kristo, elongo na bato oyo ye aponi, bakoyangela kuna na likoló. Bakonzi yango bakokokisa mposa ya bato nyonso awa na mabele, mpe bakosala ete bato nyonso bázala na esengo. Tótala sikoyo eloko oyo tosengeli kosala mpo Nzambe apesa biso bomoi ya seko na paradiso ya sika.
Emoniseli 21:3, 4; 5:9, 10; 14:1-3.