Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 116
  • Tóluka bomoi ya seko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóluka bomoi ya seko
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Mokili ya sika mpe ya kimya ya Nzambe—Okoki kofanda kuna
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tokoki kozala na bomoi libela na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Nyonso oyo Biblia esakolaka ekokisamaka
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 116

Lisolo 116

Tóluka bomoi ya seko

BUKU nini mwa mwana mwasi oyo ná baninga na ye bazali kotánga? Bazali kotánga buku oyo yo mpe ozali kotánga: Mokanda mpo na Masolo ya Biblia. Tokómi na lisolo ya nsuka, oyo ezali na motó ya likambo “Tóluka bomoi ya seko.”

Makambo nini bazali koyekola awa? Ya liboso, tosengeli koyeba Yehova ná Mwana na ye Yesu. Biblia elobi ete: ‘Talá ndenge okoki kozwa bomoi ya seko. Yekolá makambo oyo etali Nzambe ya solo kaka moko mpe makambo oyo etali Mwana na ye oyo ye atindaki awa na mabele, Yesu Kristo.’

Kasi ndenge nini tokoki koyekola makambo oyo etali Yehova Nzambe mpe oyo etali Mwana na ye Yesu? Moko na makambo oyo tosengeli kosala ezali kotánga Mokanda mpo na Masolo ya Biblia banda na ebandeli tii na nsuka. Mokanda yango ezali koyebisa biso ebele ya makambo oyo etali Yehova ná Yesu. Ezali mpe koyebisa ebele ya makambo oyo basalá mpe oyo bakosala mosika te. Kasi tokosuka te kaka na kotánga mokanda oyo.

Mokanda nini bozali komona awa na nse? Ezali Biblia. Batángelaki bino bavɛrsɛ ya Biblia esika masolo oyo ezali na buku oyo euti? Biblia ezali koteya biso makambo nyonso oyo tosengeli kosala mpo tósalela Yehova malamu mpe tózwa bomoi ya seko. Na yango, tosengeli kozwa momeseno ya kotángaka Biblia mokolo na mokolo.

Kasi kosuka kaka na koyekola makambo oyo etali Yehova Nzambe mpe oyo etali Yesu Kristo ekoki te. Ata soki toyebi makambo ebele oyo etali Yehova ná Yesu Kristo mpe mateya na bango, tokoki mpe kozanga bomoi ya seko. Bongo eloko nini esengeli mpe kosala?

Tosengeli mpe kosalela makambo oyo tozali koyekola. Boyebi lisusu Yudasi Mokeriota? Azalaki moko ya bantoma zomi na mibale ya Yesu. Yudasi ayebaki makambo ebele oyo etali Yehova ná Yesu. Kasi likambo nini ekómelaki ye? Nsima ya mwa ntango, akómaki koluka matomba na ye moko, bongo atɛkaki Yesu epai na banguna na ye na shekele ya palata ntuku misato (30). Yango wana Yudasi akozwa bomoi ya seko te.

Boyebi lisusu Gehazi oyo tolobelaki na Lisolo 69? Moto yango alulaki biloko ya bato mpe abangaki kobuka lokuta te mpo na kozwa yango. Kasi Yehova apesaki ye etumbu. Yehova akopesa biso mpe etumbu soki toboyi kotosa mibeko na ye.

Kasi ezali na bato mingi oyo basalelaki Yehova ntango nyonso na bosembo. Tosengeli kolanda ndakisa na bango. Elenge Samwele apesi biso ndakisa malamu na likambo yango. Kanisá lisusu ndenge tomonaki yango na Lisolo 55, azalaki na mbula minei to mitano mpamba ntango abandaki kosalela Yehova na tabernakle. Na yango, ata soki bozali bilenge mpenza, bokoki mpe kosalela Yehova.

Na ntembe te, biso nyonso tosengeli nde kolanda ndakisa ya Yesu. Ata ntango Yesu azalaki naino elenge, ndenge Lisolo 87 emonisi yango, azalaki kobanga te koyebisa bato makambo oyo etali Tata na ye ya likoló. Tosengeli kolanda ndakisa na ye. Tiká ete biso mpe tóyebisa bato mingi makambo oyo etali Yehova, Nzambe ya malamu, mpe Mwana na ye Yesu Kristo. Soki tosali bongo, tokozwa bomoi ya seko na paradiso ya sika oyo Nzambe akosala awa na mabele.

Yoane 17:3; Nzembo 145:1-21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto