Loyembo 37
Tómizwela nkombo malamu epai na Nzambe
1. Solo, tóluka
Ngolu ya Yehova.
Tósalela ye
Ete ásepela.
Ekomami ete,
“Nkombo” malamu nde
Ekomemaka
Na lobiko.
2. Nkombo malamu
Ezali na ntina;
Tómonisa nde
Yango na misala.
Tótɔndo Yehova
Mpo na ngolu na ye.
Tópota mbangu
Kino bomoi.
3. Nkomb’oyo tozwi,
Euti na Nzambe,
Tózala pɛto;
Tika tóbanga ye.
Tokokóma bongo
Baninga ya Nzambe,
Lokola bato
Na ye mpenza.
4. Awa tozali
N’elek’oyo mabe,
Nkombo ya Nzambe,
Tósalelaka bɛɛ.
Tótambola kati
Na pole ya solo;
Tokolóngisa
Nzela na ye.