Loyembo 49
Yehova, Nzambe Monene!
1. Ɛ Yehova, yo Nzambe na seko;
Banzela na yo sembo, tokokumisa sé yo.
Yo nde Tata, Mopesi Mibeko,
Libangá, Mosambisi, yo Mokonzi.
Ɛ Nzambe ya mawa mpe na boboto,
Salisá biso tómekola yo.
Tozali kokumisa nkombo na yo;
Kosalela yo ezali esengo.
Yo Mozalisi na biso banso.
Nyonso euti na yo.
2. Ɛ Yehova, yo Sembo, Mosantu;
Tokosalela sé yo mpo y’olingi bosembo.
Yo nd’ekimelo, nguya na solo
Mpo na libota na yo oy’a bulee.
Ɛ Nzambe ya mayele mpe na solo,
Tokobanga yo bileko binso.
Tozali mpenza kokima masumu
Mpe tokangami na mosala na yo.
Ozali mpenza kosunga biso
Mpo tomipesi na yo.
3. Ɛ Yehova, yo Mokɛngɛli mpe
Molakisi monene; y’otondi boboto bɛɛ.
Yo Mobikisi, yo nde Mosungi;
Y’okoyoka malɔmbo na basembwi.
Ɛ Nzambe ya ngolu mpe na bokabi,
Kimya, basaleli na yo bazwi.
Soki okokisi mokano na yo,
Bato bakosɛnzwa na nsɔmɔ mingi.
Yehova Nzambe, olingi biso,
Tokosalela sé yo.