Loyembo 57
Libota ya Yehova lizali na esengo
1. Esengo na bango bakosalela yo,
Batondi kondima mpe bakotosa yo
Mpo bangɛngisami kati na pole na yo.
Bakotikala sembo epai na yo.
(Mondimo)
2. Tonyokwami mpo na Satana, ye mabe
Mpe bilimu na ye. Tósalela Nzambe!
Yehova’abongisi’ekimelo malamu mpo
Na bango banso basaleli sembo.
(Mondimo)
3. Tótɛlɛma ngwi atako tomekami.
Tóbatela solo; tóbondela mingi.
Tózala na mpiko mpe tóbanga Yehova;
Tózala n’esengo kati’o mosala.
(MONDIMO)
Ɛ Yehova Nzambe, yo malamu
Na bango batatoli nkombo na yo!
Bayebi solo na Liloba na yo,
Mpe bazali mpenza na kondima.