Loyembo 59
Tozali kosepela na makebisi ya Nzambe
1. Esengo na bato ba botosi,
Basepelisi Yehova.
Na kotosa mitinda na ye nde,
Esengo, bazali kozwa.
Bango balingi toli na ye;
Basakoli boboto na ye.
Bango nde bakozela Yehova;
Batosi mibeko na ye.
2. Yehova, ye Nzambe ya boboto;
Etondi, yango nsuka te.
Ye Nzambe na kosambisa sembo;
Malamu nde nzela na ye.
Tólinga mibeko ya Nzambe,
Tokozwa mapamboli, kimya.
Tóyoka makebisi na Nzambe;
Masumu manso, tóyina.
3. Nzambe, yoká malɔmbo na biso
Mpe teyá biso Liloba.
Pesá biso ngolu na yo ete
Biso tólendisama bɛɛ.
Tomipesi bobele na yo,
Tokotosa mibeko na yo.
Tika ’te bilaká na yo, Nzambe,
Bikokana yango inso.