Loyembo 94
Mokonzi ya seko, kumisá nkombo na yo!
1. Yehova Nzambe ya solo,
Mpe yo otondi bolingo.
Nkombo na yo monene, ee,
Yo okokumisa yango.
Bilaká, banzela na yo
Ezali boyengebene.
Na mopanga na ye, Klisto
Akoboma bato mabe.
2. Nkolo ya nsé mpe makoló,
Ozali seko na seko.
Bato mabe, mpo na bango,
Mabelé matondi mbindo.
Mpe yo otii Mwana na yo
Ye oy’alingi bosembo.
Akoboma bato mabe
Ete ozwa nkembo nyonso.
3. Nyonso esakolamaki
Uta bileko na kala.
Kasi biso nde tomoni
Kokokana na yango, Yah.
Babiki bakokumisa
Yehova, Nzambe na biso.
Mpe bakoyembela Nkolo
Na esengo mpo na seko.