Loyembo 118
Tópesa lisungi mpo na ndako ya Nzambe
1. Ndako ya Nzambe ekongɛnga bɛɛ.
Tokosala nyonso’t’ebeba te.
Yah, opesi myango mpo na yango,
Etongama mpo na nkombo na yo.
Tokosalela sé Mozalisi,
Lokola Nehemia asalaki.
Alóngisaki losambo ya pɛto,
Tokumisi yo na motema moko.
(Mondimo)
2. Libot’a Nzambe oy’a bomoko,
Lipambwami na misala minso.
Bazali na kimya na esengo,
“Moombo na sembo” asungi bango.
Tókumisa Nzambe na makabo;
Bongo, ye akopambola biso.
Tókumisa ye na misala nyonso,
Kosalela Yah ezali esengo.
(MONDIMO)
Tósunga ndako ya Nzambe!
Yango nd’esika ya bulee
Mpo na bato na ye nyonso;
Akozala na bango seko.