Loyembo 144
Tosengeli kozala na kondima
1. Uta kala, Yehova Yah’alobaki.
Ye mpe asalelaki basakoli.
Nsima nde Klisto’ayei komonisa ye.
Bomoi na ye’akoyokamela Nzambe.
(Mondimo)
2. Tóloba ntango inso na bosembo,
Mpo tókumisa mosala na biso.
Tóndima Klisto mpe tómekola ye;
Mpe, Yehova’akopambola biso bɛɛ.
(Mondimo)
3. Tokozonga nsima te mpo tokufa.
Tózala bandimi, bomoi, tokozwa.
Ata banguna bangaleli biso;
Tóndima Yehova, tózwa lobiko.
(MONDIMO)
Tika tóndimela Liloba ya Nzambe.
Boye, tokobika n’etumba monene.
Tómonisa’ete, kondima na biso
Ekobatela biso na bomoi.