Loyembo 160
Tótambola na bosembo
1. Sambisá ngai, ɛ Yehova Nkolo!
Namipesi na yo na bosembo nyonso.
Ómeka ngai, solo omeka ngai,
Ete nápambwama, yo pɛtolani ngai.
(Mondimo)
2. Ngai nayini basáli na mabe;
Bango batosi te solo na yo, Nzambe.
Koboma ngai na bato mabe te,
Soko bomoi na ngai, na bango’elongo te.
(Mondimo)
3. Yah, nalingi ndako na yo, bulee.
Losambo ya pɛto na yo, nalingi bɛɛ.
Nakozala pene n’hema na yo
Mpo na kopesa yo matɔndi na nkembo.
(MONDIMO)
Ngai nalingi Nzela na yo Nkolo;
Seko, nakolanda yango na bosembo.