Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ssb loyembo 183
  • Esika ya bilenge kati na ebongiseli ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esika ya bilenge kati na ebongiseli ya Nzambe
  • Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Masolo mosusu
  • Tólongisa nzela na biso
    Tóyembela Yehova
  • Tóluka baninga ya kimya
    Tóyembela Yehova na esengo
  • Tóluka baninga ya kimya
    Tóyembela Yehova—Nzembo ya sika
  • Bomoi ezali likamwisi
    Tóyembela Yehova
Makambo mosusu
Nzembo mpo na kokumisa Yehova
Ssb loyembo 183

Loyembo 183

Esika ya bilenge kati na ebongiseli ya Nzambe

(Nzembo 148:12, 13)

1. Banso, tozwi esika n’ebongiseli

Oy’a Nzambe mpo ’te tókumisa Ye.

Mibangé, kasi bilenge nde batondi,

Bazali kosakola Bokonzi bɛɛ.

Bilenge batatoli bisika binso.

Tólendisami na mpiko na bango.

Mikóló bazali nde kotosa bango.

Mpe bandimami na Yehova Nkolo.

2. Bilenge nyons’oyo bayebi Yehova,

Esengo, nsai’ekozala na bango.

Paladiso’ekosalema awa ó nsé

—Nzamb’akopesa bomoi ya seko.

Awa nsuka ya mabe nyons’ebɛlɛmi,

Tóbundisami na biloko mabe.

Tóluka kolóng’elimo ya mokili,

Tótikala sembo mpe na molende.

3. Mpo nini kozwa baninga na mokili?

Bóluka baninga, bato ya Nzambe.

Bilenge, bósala misala ya pɛto;

Bókangama na mosala ya Nzambe.

Bólukaka bandeko basunga bino.

Bóyebisa mitungisi na bino.

Bótya motema na bino’epai na Nzambe;

Mpe bososoli nde bokozwa yango.

4. Biso, tondimami kati na lisangá;

Tokosungama na Mwana ya Nzambe.

Tózala bobele n’esika na biso;

Tózala pene na ye, tótosa ye.

Tokomekola te mokili’oyo mabe;

Na Liloba ya Nzambe, topɛtwami.

Mibangé mpe bilenge, tókumisa Yah,

Na yango nde biso tokozwa bomoi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto