Loyembo 207
Nani Nkolo na biso?
1. Nani Nkolo na yo?
Otosaka Nzambe?
Oy’aza’ Nkolo na yo nde
Ye’oy’okosalelaka ye.
Okosambela te
Banzambe mibale.
Motema, pesani na Yehova,
Na nzambe’esusu te.
2. Nani Nkolo na yo?
Otosaka nani?
Nzambe’a solo’azali moko;
Ópona ye mpo na seko.
Oponi Kaisala?
Ye akosunga yo?
Y’okotosa nde Nzambe ya solo,
Lelo kino seko?
3. Nani Nkolo na ngai?
Nakotosa nani?
Nakosalela Yehova;
Ndai na ngai, nakokokisa.
Asikoli ngai
Na mbeka monene;
Makila na Yesu, Mwana na ye.
Tika tótɔndo ye!
4. Yah, Nkolo na biso,
Tomipesi na yo.
Tomoni bomoko solo
O kati y’etongá na yo.
Lokola nde mamwe
Likoló na Siona,
Mpe bandeko bazali mingi bɛɛ;
Likabo na yo, Yah.