Loyembo 212
Totɔndi yo, Yehova
1. Botɔndi Yehova, mpo y’ongɛngi bɛɛ.
Yango, butu, moi, toza’ na pole.
Totɔndi yo, Nzambe, mpo yo’oyokaka
Malɔmbo, ata tozali mpamba.
2. Botɔndi Yehova, Klisto’akufaki.
Liwa mp’ewelo, ye alóngaki.
Totɔndi yo mpo y’opamboli biso,
Mpo tókokisa mosala na yo.
3. Botɔndi Yehova, mpo na bandeko.
Bango, baninga malamu, sembo.
Totɔndi yo mp’opesi’elimo na yo;
Biso tokolónga mpo na yango.
4. Botɔndi yo, Nzambe! Na yo, lokumu!
Tokosakola nkombo mosantu.
Totɔndi yo mpo’awa o nsé, basembwi
Bakopambolama na Bokonzi.