Loyembo 219
Kiti na Bokonzi ya Yehova
1. Ɛ Yehova, yo solo Nzambe.
Kiti na yo ezali oy’a bulee.
Yo ozingami na monama,
Yo Nzambe ya kimya mpe yang’ekoya.
2. Mikóló mpe bamilatisi
Bilamba mpɛmbɛ, bango nde bakonzi.
Bikelamu’inei, nkombo na yo,
Bakumisi yango mpe—nkembo na yo.
3. Mingongo mibimi na lóla,
Solo na yo engɛngi na kongɛnga.
Bopɛto na yo, eleki pɛɛ.
Biso tokomekola solo Nzambe.
4. Ɛ Yehova, tokumisi yo,
Y’oleki na solo mpe nguya na yo.
Klisto, Mokonzi, Mobikisi.
Amemi biso na yo, Mozalisi.