Baklisto mpe nkombo oyo eleki nkombo nyonso
MOTO moko te ayebi mpenza ntango Bayuda oyo bazalaki koteya mibeko ya bankoko na bango, batikaki kobénga nkombo ya Nzambe mpo na kokitanya yango na bankombo ya Liebele oyo elimboli Nzambe mpe Nkolo Moyangeli. Bato mosusu bakanisi ete nkombo ya Nzambe ebungaki na masoló ya mokolo na mokolo liboso ya eleko na Yesu. Kasi emonani mpenza ete nganga monene alandaki kosalela yango na ntango azalaki kokamba misala ya tempelo—mingi mpenza na Mokolo ya Mbɔndi—kino na kobomama ya tempelo na mobu 70 T.B. Na yango, ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ebéngeli ya nkombo ya Nzambe eyebanaki, atako esalelamaki lisusu mingi te.
Kasi, mpo na nini Bayuda batikaki kosalela nkombo ya Nzambe? Ekoki mpenza kozala mpo na lolenge mabe oyo bazalaki kolimbola mobeko ya misato oyo ete: “Okotanga nkombo na [Yehova, NW] Nzambe na yo mpamba te.” (Exode 20:7) Ya solo, mobeko wana mopekisaki te kosalela nkombo ya Nzambe; soki ezali bongo, mpo na nini basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, lokola Davidi, bakokaki kosalela yango mingi boye mpe bazwaki mapamboli mauti epai na Yehova? Epai mosusu, mpo na nini Nzambe ayebisaki nkombo yango epai na Mose mpe asɛngaki ye ete alimbola yango epai na Bayisraele.—Nzembo 18:1-3, 6, 13; Exode 6:2-8.
Nzokande, bato ya eleko na Yesu bazalaki na momeseno ya kobongola mibeko malamu ya Nzambe ete ekóma mabe. Na ndakisa, mobeko ya minei na Mibeko Zomi esɛngaki na Bayuda ete bakumisa Sabata, mokolo na kopema, mokolo ya nsambo na poso. (Exode 20:8-11) Bayuda oyo bazalaki kolakisa mibeko ya bankoko babongolaki mobeko wana ya pɛtɛɛ mpe basɛngisaki makambo mingi. Batyaki mitinda mingi mpenza mpo na kolimbola ata likambo moke oyo esengelaki kosalema to te na mokolo ya Sabata. Na ntembe te, likanisi wana nde etindaki bango na kobongola mobeko malamu oyo ete nkombo ya Nzambe esengelaki kotyolama te na koyeisáká yango makasi, na kopekisáká ete nkombo yango etangama te.a
Yesu mpe nkombo oyo eleki nkombo nyonso
Yesu asengelaki kotósa mobeko wana moutaki na Biblia te? Soko moke te! Amipekisaki te mpo na kobikisa bato na mokolo ya Sabata, atako yango ezalaki kobuka mibeko oyo misalamaki na bato mpe atako yango ezalaki likámá mpo na bomoi na ye. (Matai 12:9-14) Epai mosusu, Yesu akweisaki Bafalisai ete bazalaki bakosi mpamba te mibeko na bango mikeseneki mpenza na Liloba lipemami na Nzambe. (Matai 15:1-9) Na yango, emonani ete amipekisaki te kosalela nkombo ya Nzambe, mingi mpenza soki toyebi ete nkombo na ye moko, Yesu, elimboli “Yehova azali lobiko.”
Mokolo moko, Yesu atɛlɛmaki na eyanganelo mpe atangaki mokapo moko na rulo ya Yisaya. Eteni oyo atangaki ezwami lelo na Yisaya 61:1, 2, epai nkombo ya Nzambe ezwami mbala mingi. (Luka 4:16-21) Aboyaki nde kotanga nkombo ya Nzambe wana ezalaki ye kokuta yango mpo na kotya “Nkolo” to “Nzambe” na esika na yango? Soko moke te. Soki asalaki bongo, mbɛlɛ atósaki mibeko miuti na Biblia te oyo misalemaki na bakonzi na lingomba ya Bayuda. Nzokande, tozali kotanga ete: “Ateyaki bango na motindo na moto oyo azali na bokonzi, kasi lokola bakomeli na bango te.”—Matai 7:29, NW.
Epai mosusu, lokola touti komona yango, Yesu asɛngaki na bayekoli na ye na kobondela Nzambe ete: “Nkombo na yo ezala mosantu!” (Matai 6:9) Mpe, kati na libondeli moko asalaki na butu oyo ezalaki liboso na kobomama na ye, alobaki epai na Tata na ye ete: “Nasili koyebisa nkombo na yo epai na bato oyo yo opesaki ngai kati na mokili . . . Tata na bulee, batela bango na ntina na nkombo na yo oyo opesaki ngai.”—Yoane 17:6, 11, NW.
Na kotalela maloba oyo na Yesu, mokanda Der Name Gottes (Nkombo ya Nzambe) elimboli na lokasa 76, ete: “Tosengeli koyeba likambo oyo ya kokamwa ete, lolenge oyo Nzambe amonisami na Kondimana ya Kala ezali komonisama ya nkombo na ye; ya solo, likambo yango limonisami lisusu kati na biteni ya nsuka ya Kondimana ya Sika. Na ndakisa, tozali kotanga na Yoane 17:6 ete: ‘Nasili koyebisa nkombo na yo.’”
Ya solo, ekoki kokanisama te ete Yesu aboyaki kosalela nkombo ya Nzambe, mingi mpenza na ntango azalaki kotanga mikapo mizwami na Makomami na Liebele epai nkombo yango ezalaki.
Baklisto ya liboso
Bayekoli na Yesu ya ekeke ya liboso basalelaki Nkombo ya Nzambe? Batindamaki na Yesu ete bakende kozalisa bayekoli na mabota nyonso. (Matai 28:19, 20) Mingi na bato oyo bango basengelaki koteya bayebaki soko moke te Nzambe oyo amimonisaki epai na Bayuda na nkombo Yehova. Kasi, lolenge nini baklisto basengelaki komonisa bango Nzambe ya solo? Esengelaki kobénga ye bobele Nzambe to Nkolo? Te. Mabota wana bazalaki na banzambe mpe na bankolo na bango. (1 Bakolinti 8:5) Bongo baklisto basalaki nini mpo na komonisa kokesena kati na Nzambe ya solo na banzambe ya lokutá? Bobele na kosaleláká nkombo ya solo ya Nzambe.
Na yango, moyekoli Yakobo amonisaki na likitá moko ya bankulutu oyo lisalemaki na Yelusaleme, ete: “Simeona asili koyebisa lolenge oyo Nzambe atalaki bapakano mpo na mbala ya liboso, ete akamata bato mpo na nkombo na ye. Mpe yango eyokani na maloba ya basakoli.” (Misala 15:14, 15, NW) Na lisoló na ye liyebani mpenza oyo asalaki na mokolo ya Pantɛkɔte, ntóma Petelo abendaki lisusu likebi ya bayoki na ye likoló na likambo ya ntina mpo na nsango ya boklisto, wana atangaki maloba oyo ya mosakoli Yoele, ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya Jéhovah akobika.”—Yoele 2:32; Misala 2:21.
Ntóma Paulo amonisaki motuya ya nkombo ya Nzambe. Kati na mokanda na ye epai na Baloma, azongeli maloba wana ya mosakoli Yoele mpe alendisi baninga na ye baklisto ete bamonisa kondima kati na maloba oyo na kosakoláká nkombo ya Nzambe epai na bato mosusu, ete bango mpe bakoka kobika. (Baloma 10:13-15) Na nsima, akomelaki Timoté ete: “Moto na moto oyo akotangaka nkombo na Jéhovah, atika kosala mabe!” (2 Timoté 2:19, NW) Na nsuka ya ekeke ya liboso, ntóma Yoane asalelaki nkombo ya Nzambe kati na mikanda na ye. Liloba “Aleluya,” oyo elimboli “Bokumisa Jah” lizwami mbala mingi kati na mokanda ya Emoniseli.—Emoniseli 19:1, 3, 4, 6.
Nzokande, Yesu mpe bayekoli na ye basakolaki ete lipɛngwi likobima kati na lisangá ya boklisto. Ntóma Petelo akomaki ete: “Balakisi na lokutá mpe bakozala kati na bino.” (2 Petelo 2:1, NW; tala mpe Matai 13:36-43; Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:3; 1 Yoane 2:18, 19.) Bisakweli wana bikokanaki, na motindo oyo ete nkombo ya Nzambe etyamaki na nsima. Elongolamaki nkutu na bakopi mpe na mabongoli ya Biblia! Kasi totala lolenge oyo yango esalemaki.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Basusu bapesi ndimbola oyo: Bayuda bamitikaki kopusama na filozofi ya Bagreke. Na ndakisa, Philon, filozofe Moyuda ya Alexandrie oyo azalaki na bomoi pene na eleko na Yesu, alandaki mpenza filozofi ya Platon, Mogreke oyo ye azalaki kotalela lokola moto oyo apemami na Nzambe. Na nsé na liloba “Philon,” mokanda Grand Larousse encyclopédique (tome VIII, lokasa 423) emonisi ete “mateya ya Philon masangisi mateya ya Platon mpe oyo ya Biblia” mpe “mazalaki na bopusi . . . likoló na Batata ya Lingomba.” Nzokande, Philon azalaki koteya ete Nzambe akoki kolimbolama te, na yango, akoki kopesama nkombo te.
[Elilingi na lokasa 14]
Elilingi oyo ya nganga monene ya Bayuda, oyo alati ekɔti ezali na likomi ya Liebele lilimboli “Bosantu bozali na Yehova,” ezali na Vatican
[Elilingi na lokasa 15]
Engebene libongoli oyo ya 1805 ya Biblia na lokotá Allemand, Yesu abéngaki nkombo ya Nzambe wana atangaki mokapo ya Yisaya, na mongongo makasi, kati na eyanganelo.—Luka 4:18, 19
[Bililingi na lokasa 16]
Petelo mpe Paulo basalelaki nkombo ya Nzambe na ntango batangaki esakweli ya Yoele.—Misala 2:21; Baloma 10:13