Mokapo 2
Motó na likambo monene na Biblia
Ndimbola ya Makomami Mabombami mazwami kati na mokanda na Emoniseli mazalaki mpenza kobulunganisa bayekoli ya sembo ya Biblia. Na ntango etyamaki na Nzambe, mabombami yango masengelaki kobimisama. Ndenge nini, ntango nini mpe na nani? Bobele elimo ya Nzambe nde ekokaki kopesa ndimbola na yango wana ntango etyamaki ezalaki kobelema. (Emoniseli 1:3) Mabombami mosantu yango malingaki komonisama epai na baombo ya Nzambe oyo bazali awa na mabelé mpe batondi na molende, mpo ete batelema ngwi mpo na koyebisa bikateli na ye. (Matai 13:10, 11) Tolobi te ete ndimbola epesami na mokanda oyo ezangi mabunga. Na ndakisa na Yosefe, na ntango na kala, tolobi boye: “Kolimbola ntina ezali mpo na Nzambe te?” (Genese 40:8) Kasi tondimi mpenza ete ndimbola epesami awa eyokani na Biblia mobimba; ezali bongo komonisa ndenge nini bisakweli ya Nzambe bizali mpenza kokokana kati na makambo mazali kobima na mokili na eleko na biso oyo ya mpasi mingi.
1. Wapi mokano monene ya Jéhovah?
LISESE moko na Biblia elobi ete “Nsuka na likambo eleki ebandeli na yango.” (Mosakoli 7:8) Mokanda na Emoniseli nde ezali koyebisa motindo nini mokano monene na Jéhovah ekosukisama, na kobulisama na nkombo na ye na miso ya bikelamu nyonso. Lokola Nzambe alobaki yango mbala mingi na nsima na moko na basakoli na ye ya kala: “Bakoyeba ete ngai nazali Jéhovah.”—Ezekiele 25:17; 38:23.
2. Emoniseli mpe mikanda misusu ya kala kati na Biblia epesi biso boyebi nini?
2 Emoniseli ezali koyebisa biso motindo nini makambo makosuka; nzokande mikanda misusu na Biblia, oyo mikomamaki liboso na yango mizali koyebisa biso motindo nini makambo yango mabandaki. Na kotalela makambo yango na mozindo, tokoyeba ntembe nini ebimaki oyo esengeli kokatama mpe tokozala na boyebi mobimba na mikano na Nzambe. Oyo nde likambo na esengo mingi! Boyekoli oyo esengeli mpe kopusa biso na kosala eloko, mpo ete tokoka kosepela na makambo kitoko oyo mazali koya mpo na bato. (Nzembo 145:16, 20) Ekomi biso na esika oyo, esengeli ete tobongisa molongo na makambo mpe tobimisa polele motó na likambo monene na Biblia, mpo ete tokoka kobosana te likambo monene oyo esengeli kokatama, mpe mokano na Nzambe, oyo asili koyebisa yango polele ete akosukisa likambo yango.
3. Esakweli nini ezali na mokanda na Genese elakisi motó na likambo na Biblia, bakisa mokanda na Emoniseli?
3 Genese, mokanda ya liboso ya Biblia elobi mpo na “ebandeli” mpe elimboli misala na Nzambe oyo azalisaki biloko nyonso, bakisa mpe moto, ye oyo azali ekelamu eleki ntina na biloko nyonso bizalisaki Nzambe na mokili. Se mokanda oyo ya Genese etangi mpe esakweli ya liboso oyo Nzambe ye moko apesaki yango na elanga ya Edene, esili bongo koleka mibu pene na 6 000. Nyoka eutaki kosalelama mpo na kokosa Eva, mwasi ya liboso, mpe Eva akweisaki mobali na ye Adam ete alanda ye na kobuka mobeko ya Jéhovah, kolyaka “mbuma na nzete na koyeba malamu mpe mabe.” Koyebisaka ekateli na ye likoló na babalani oyo basalaki lisumu, Nzambe alobaki na nyoka: “Nakotia mpe likunya kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akotuta motó na yo, mpe okoswa litindi na ye.” (Genese 1:1; 2:17; 3:1-6, 14, 15) Esakweli oyo epesi motó na likambo monene na Biblia, bakisa mpe Emoniseli.
4. (a) Nsima wana Nzambe apesaki esakweli ya liboso, nini ekomelaki baboti na biso ya liboso? (b) Mituna nini mizali kotunama mpo na oyo etali esakweli yango, mpe mpo na nini tosengeli koyeba eyano na yango?
4 Esilisaki ye kopesa esakweli oyo, Nzambe abimisaki baboti na biso ya liboso na Edene. Mpo na bango, elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na Paradis ezalaki lisusu te. Uta ntango yango, bomoi na bango ezalaki libanda ya Paradis, na mabelé oyo mabongisamaki naino te. Kufa ezalaki liboso na bango mpe bakokaki kobota bobele bana bazali na masumu. (Genese 3:23 kino 4:1; Tala mpe Baloma 5:12.) Kasi esakweli oyo epesamaki na Edene ezali na ndimbola nini? Banani batangami na esakweli yango? Ezali na boyokani nini na Emoniseli? Ezali na nsango nini mpo na biso lelo? Mpo ete tozwa mpasi te likoló na likambo monene na ntina na yango Jéhovah apesaki esakweli oyo, esengeli na biso koyeba eyano na mituna oyo, mpamba te yango etali bomoi na biso.
Baoyo balobelami kati na esakweli yango
5. Ntango nyoka akosaki Eva, nini ekomelaki bokonzi na Nzambe mpe nkombo na ye, mpe ndenge nini Nzambe akosilisa ntembe yango?
5 Esakweli ya Genese 3:15 elobamaki epai na nyoka oyo akosaki Eva ete akokufa te soki azangi botosi epai na Nzambe; nyoka alobaki na ye ete akozala nde na bonsomi mpe akokoma lokola Nzambe. Kolobaka bongo, nyoka amonisaki ete Jéhovah azali mobuki na lokuta mpe abakisaki ete bato bakozala malamu koleka soki bamiyangeli bango moko. (Tala Genese 3:1-5.) Bokonzi monene na Jéhovah etyolamaki mpe nkombo na ye kitoko ebebisamaki. Mokanda na Emoniseli elimboli motindo nini Jéhovah, Mosambisi na sembo akolongisa bokonzi na ye mpe akobulisa nkombo na ye na nzela na Bokonzi na Mwana na ye, Yesu Klisto.—Emoniseli 12:10; 14:7.
6. Ndenge nini Emoniseli elakisi biso ekelamu oyo alobaki na Eva na nsima na nyoka?
6 Liloba “nyoka” etali bobele nyoka mpenza? Soki moke te! Emoniseli elakisi biso polele ekelamu mabe ya elimo oyo alobaki na nsima na nyoka yango. Ezali bongo “dalagona monene, nyoka na kalakala, oyo abengami Diable mpe Satana, oyo azali kozimbisa bato na mokili mobimba,” mpe “azimbisaki Eva na mayele na ye mabe.”—Emoniseli 12:9; Tala mpe 2 Bakolinti 11:3.
7. Nini emonisi ete mwasi oyo alobelami na Genese 3:15 azali mwasi ya elimo?
7 Na nsima Genese 3:15 elobeli “mwasi” moko. Ezali Eva? Mbala mosusu akanisaki bongo. (Tala Genese 4:1.) Nzokande, Eva asila kokufa uta koleka mibu 5 000; yango wana ekokaki kosalema te ete Satana aumela na likunya mpo na ye kino lelo. Epai mosusu, lokola Nyoka oyo Jéhovah alobaki epai na ye azali ekelamu ya elimo azangi komonana, elingi koloba ete mwasi asengeli mpe kozala ekelamu ya elimo. Ezali yango Emoniseli 12:1, 2 elobi polele, komonisaka ete mwasi wana na elilingi azali lisangá ya Jéhovah na likoló, lisangá oyo esalami na bikelamu ya elimo.—Tala lisusu Yisaya 54:1, 5, 13.
Mabota mibale na likunya
8. Mpo na nini tosengeli koluka koyeba makambo malobami na ntina na mabota oyo mibale?
8 Bobele kuna na Genese 3:15 tozali mpe kokuta mabota mibale. Tosengeli koluka koyeba ndimbola na yango, mpamba te mabota yango mibale matali mpenza likambo monene oyo ya boyangeli ya mabelé. Nzokande likambo yango etali mpe biso banso, bilenge to mibange. Tozali kopesa maboko na biso na nani kati na mabota oyo mibale?
9. Banani batangami kati na libota na Nyoka?
9 Ya liboso ezali libota ya Nyoka. Ezali nani? Na ntembe te esangisi kati na yango bikelamu mosusu ya elimo oyo balandaki Satana kati na botomboki na ye kasi na nsima ‘babwakamaki elongo na ye’ penepene na mabelé. (Emoniseli 12:9) Lokola Satana, to Belezebula azali “mokonzi na bilimu mabe,” ezali polele ete bikelamu yango bizali lisangá na ye oyo ezangi komonana.—Malako 3:22; Baefese 6:12.
10. Engebene Biblia, banani lisusu basangani na libota na Satana?
10 Yesu alobaki mpe epai na bakonzi na mangomba Bayuda na ntango na ye: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bosala mposa na tata na bino. Ye mobomi na bato longwa na ebandeli; atelemi kati na solo te mpo ete solo ezali kati na ye te. Wana ekosololaka ye lokuta, azali kosolola makambo na ye moko mpo ete azali mobuki na lokuta mpe tata na yango.” (Yoane 8:44) Na kotemelaka Mwana na Nzambe, bakonzi wana na mangomba bamonisaki ete bango mpe bazali libota ya Satana, mpe bazalaki kosalela ye lokola tata na bango. Bato mosusu mingi kati na Lisolo ya bato bamimonisaki ete bazali libota ya Satana mpo ete basalaki mokano ya Satana, mpe mingimingi na kotemelaka bayekoli na Yesu mpe na konyokolaka bango. Tokoki koloba ete bato yango, bango nyonso elongo, bazali lisangá ya Satana oyo ezali komonana awa na mabelé.—Tala Yoane 15:20; 16:33; 17:15.
Toluka koyeba nani oyo azali libota ya mwasi
11. Na boumeli ya bikeke, Nzambe amonisaki nini mpo na oyo etali libota ya mwasi?
11 Esakweli ya Genese 3:15 elobeli na nsuka libota ya mwasi. Wana Satana azalaki kosala libota na ye, Jéhovah asalaki na motindo boye ete “mwasi” na ye, to lisangá ya likoló ekokani na mwasi akoka kobimisa libota moko. Na boumeli ya bambula soko 4 000, Jéhovah amonisaki mokemoke epai na bato na botosi oyo bazalaki kobanga ye, makambo matali koya ya libota wana. (Yisaya 46:9, 10) Abrahame, Yisaya, Yakobo mpe bamosusu bakokaki bongo kozala na kondima kati na elaka oyo engebene yango libota ya ndaka ekobima kati na bakitani na bango. (Genese 22:15-18; 26:4; 28:14) Satana mpe basaleli na ye banyokolaki mbala mingi basaleli oyo ya Jéhovah mpo na kondima na bango makasi.—Baebele 11:1, 2, 32-38.
12. (a) Ntango nini Mosangani ya liboso na libota ya mwasi amonanaki, mpe likambo nini emonisaki koya na ye? (b) Na mokano nini Yesu apakolamaki?
12 Na nsuka, na mobu 29 ya ntango na biso, Yesu, moto ya kokoka akendaki na Yordani epai na Yoane Mobatisi mpe azwaki batisimo. Kuna, Jéhovah abotaki ye na elimo santu, kolobaka: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] ye mingi.” (Matai 3:17) Na motindo yango, Yesu amonanaki ete azali ye oyo atindamaki uta na lisangá ya Nzambe ya elimo na makolo. Apakolamaki mpo azala Mokonzi na Bokonzi ya likoló, oyo apesameli mokumba ya kozongisa bokonzi na mabelé na nkombo ya Jéhovah, mpe na motindo yango kokata mpo na libela likambo etali boyangeli to bokonzi. (Emoniseli 11:15) Yesu azali bongo Mosangani ya liboso kati na libota ya mwasi, Masiya oyo alakamaki.—Tala Bagalatia 3:16; Danyele 9:25.
13, 14. (a) Mpo na nini libota ya mwasi esuki bobele na moto moko te? (b) Bato boni Nzambe aponi na mokili mpo ete basangana lisusu na libota yango, mpe lisangá ya motindo nini bango basali? (c) Banani lisusu bazali kosala na bomoko elongo na libota na mwasi?
13 Libota ya mwasi esuki se na moto moko monene? Ezali boni mpo na libota ya Satana? Biblia elakisi libota yango ete esalami na bibele na baanzelu mabe to badémo mpe na bato oyo bazali kotyola Nzambe. Na yango, tokokamwa te na koyoka ete Nzambe aponi awa na mokili bato ya sembo 144 000, oyo ye akozalisa bango mikonzi mpe banganga elongo na Yesu Klisto, Libota ya ndaka mpe Masiya. Emoniseli elobeli likambo yango, wana elobi yango ete Diable, mpo na likunya na ye epai na lisangá to mwasi na Nzambe, “akei kobunda etumba na bango batikalaki na libota na mwasi.”—Emoniseli 12:17; 14:1-4.
14 Kati na Biblia, baklisto bapakolami babengami bandeko na Yesu; elimboli ete bango na ye bazali na Tata moko mpe mama moko. (Baebele 2:11) Tata na bango azali Jéhovah Nzambe. Mama na bango azali bongo “mwasi na Nzambe,” elingi koloba lisangá na ye na likoló. Bakomi eteni ya mibale ya libota, mpo ete Klisto azali eteni ya liboso. Lisangá ya baklisto oyo babotami na elimo ezali lisangá ya Nzambe oyo ezali komonana, oyo ezali kosala mosala na yango na bokambami na mwasi na ye to lisangá kati na makoló, epai bakosangana esika moko na Klisto nsima na kosekwa na bango. (Baloma 8:14-17; Bagalatia 3:16, 29) Atako batangami kati na libota ya ndaka te, bamilió na bampate mosusu bauti na mabota nyonso basangani esika moko mpo na kosala elongo na lisangá na Nzambe na mabelé. Ozali moko na bampate mosusu yango? Soki ezali boye, elikya na yo kitoko ezali ete okoka kozala na bomoi ya seko na Paradis na mabelé.—Yoane 10:16; 17:1-3.
Likunya ekoli
15. (a) Motindo nini libota ya Satana, ya elimo mpe ya mosuni ekolaki? (b) Nini ekomelaki libota ya Satana na mpela ya ntango ya Noa?
15 Libota ya Satana kati na bato emonanaki se na ebandeli mpenza kati na lisolo ya bato. Na ndakisa Kaina, mwana ya liboso ya moto, “autaki na oyo mabe mpe abomaki ndeko na ye” Abele. (1 Yoane 3:12) Na nsima Enoka alobaki ete Jéhovah “akoya na bibele na babulami na ye, mpo na kosambisa bato nyonso mpe mpo na kokweisa baoyo nyonso bakotiolaka Nzambe na ntina na misala nyonso na bango na matioli oyo bakotiolaka ye na yango, mpe na ntina na maloba nyonso makasi masili bango batioli na masumu kotukatuka ye.” (Yuda 14, 15) Epai mosusu, baanzelu batomboki balandaki Satana mpe bakomaki eteni moko na libota na ye. Baanzelu wana “batikaki efandelo na bango mpenza” kati na makoló, balataki nzoto ya mosuni mpe babalaki bana basi ya bato. Babotaki bilombe mabe. Lokola mokili ya ntango wana etondaki na mobulu mpe na mabe, Nzambe abomaki bango na mpela. Na mpela yango bobele moto na sembo Noé na libota na ye nde babikaki. Baanzelu bazangi botosi, bakomaki bilimu mabe to badémo batambwisami na Satana, batikaki basi na bango mpe bana na bango. Baanzelu yango batikaki nzoto ya mosuni mpe bazongelaki nzoto na bango ya elimo; sika bazali kozela kokokisama na ekateli na Nzambe likoló na Satana mpe libota na ye.—Yuda 6, Genese 6:4-12; 7:21-23; 2 Petelo 2:4, 5.
16. (a) Mokonzi nini ya mabe abimaki nsima na mpela mpe ndenge nini amonisaki ete azali mosangani na libota na Satana? (b) Ndenge nini Nzambe akweisaki mokano ya batongi ya Ndako molai na Babele?
16 Mwa moke nsima na mpela monene, mokonzi mabe Nimirode amonanaki na mokili. Biblia elobi na ntina na ye ete azalaki “moluki makasi na nyama liboso na Jéhovah,” mosangani mpenza na libota na Satana. Lokola Satana, Nimirode azalaki na elimo ya botomboki; atongaki mboka Babele to Babilone, kotyolaka bongo mokano ya Jéhovah oyo akanaki ete bato bapalangana mpe batondisa mokili. Eloko monene na mboka yango elingaki kozala ndako molai “oyo nsonge na yango ekokoma na likoló.” Nzambe akweisaki mokano ya bato wana. Abulunganisaki minoko na bango mpe “apanzaki bango uta na esika yango kino bipai nyonso na mokili,” kasi abomaki mboka Babilone te.—Genese 9:1; 10:8-12; 11:1-9.
Ndenge bikonzi ya politike bibandaki kobima
17. Wana ezalaki motuya na bato koyikana na mokili, eteni nini ya libebi ya lisangá ya bato emonanaki, mpe, mpo na yango, bikonzi nini minene bibimaki?
17 Na Babilone eyaki bongo komonana lisangá ya bato oyo ekolaki na kotyolaka bokonzi ya Jéhovah. Moko na mitindo ya lisangá yango ezalaki motindo na politike. Wana bato bakomaki mingi na mokili, bato mosusu bazalaki na mposa ya bokonzi balandaki ndakisa ya Nimirode. Moto abandaki koyangela moninga na ye moto mpo na konyokola ye. (Mosakoli 8:9) Na ndakisa, na mikolo ya Abrahame, mboka Sodome, Gomore mpe bamboka mosusu pembeni wana ekweaki na maboko ya bakonzi ya Sinala mpe ya mikili misusu mosika. (Genese 14:1-4) Na nsima, babundi makasi mpe bakambi na bato bakamataki biteni minene ya mokili mpo na koyangela yango mpe koluka bozwi mingi. Biblia etangi mwa mosusu kati na yango: Ezipito, Babilone, Médo-Perse, Grèce mpe Rome.
18. (a) Ezaleli ya libota ya Nzambe epai na mikonzi ya politike ezali nini? (b) Ndenge nini mikonzi na politike bakokisaki mbala mosusu mikano na Nzambe? (c) Ndenge nini mikonzi mingi bamonisaki ete bazali solo libota ya Nyoka?
18 Jéhovah atikaki nzela na bikonzi ya politike, mpe basaleli na ye oyo bafandaki na mikili yango batosaki bikonzi wana na makambo oyo mazalaki kobuka mibeko ya Nzambe te. (Baloma 13:1, 2) Nzambe mpe asalelaki bikonzi mosusu ya politike mpo na kokokisa mikano na ye to mpo na kobatela libota na ye. (Tala Esdrase 1:1-4; 7:12-26; Misala 25:11, 12; Emoniseli 12:15, 16.) Nde ata bongo, bakonzi mingi ya politike batemelaki makasi losambo ya solo, komonisaka bongo ete bazali libota ya Nyoka.—1 Yoane 5:19.
19. Kati na Emoniseli bikonzi ya mokili bilakisami lokola nini?
19 Bokonzi ya moto elongi te; ememeli bato bolamu te mpe esilisi mikakatano na bango te. Jéhovah atikaki bato bameka biyangeli ya lolenge nyonso, kasi asepeli te na bambeba mpe na mobulu ya biyangeli yango. (Masese 22:22, 23) Emoniseli elakisi bikonzi mabe ya mokili mobimba ete bizali nyama na yauli, nyama na nsomo mpe na lolendo.—Emoniseli 13:1, 2.
Bato na mombongo na lokoso
20, 21. Wapi etuluku ya mibale esengeli kotangama kati na “bakapitene” (“mikolo na etumba”) mpe “bato makasi” na libota mabe na Satana, mpe mpo na nini?
20 Esika moko na mikonzi na politike, eyaki komonana bato na mombongo bazangi kolongobana. Mikanda mimonanaki na bandako ya kala ya Babilone oyo esila kokwea emonisaki ete na ntango wana mayele mabe ya kokosa bato na nzela ya mombongo ezalaki kosalema mingi. Mpe kino na mikolo na biso oyo, bato na mombongo na mokili mobimba bazali kosalela mayele mabe mpo na kozwa matomba; na mikili mingi, mwa bato moke bakomi na bozwi mingi, nzokande bibele bafandi se na bobola na bango. Na eleko oyo baizini ekomi mingi, bato na mimbongo mpe basali na biloko ndenge na ndenge bamizweli misolo mingi na kotekisaka epai na bakonzi na politike ebele na bibundeli mabe, bakisa bibundeli oyo ekoki koboma ebele ya bato mbala moko, oyo ekomi lelo oyo kobangisa mingi. Bato minene oyo na mimbongo na lokoso mpe bato mosusu ya motindo oyo moko batangami kati na “mikóló na etumba” to “bakapitene” mpe “bato makasi” oyo bazali libota mabe na Satan le Diable. Bango nyonso basangani na lisangá ya Satana awa na mabelé, lisangá oyo, engebene ekateli na Nzambe mpe na Klisto, esengeli kobomama.—Emoniseli 19:18.
21 Esika moko na mikonzi na politike na libebi mpe na bato na mombongo na lokoso ebakisami eteni ya misato ya lisangá ya bato oyo ekoki ete ebomama, engebene ekateli ya Nzambe. Yango wapi? Emoniseli ekokamwisa yo na ntina yango.
Babilone Monene
22. Losambo ya motindo nini ebimaki na Babilone ya kala?
22 Kotongama ya Babilone ya kala ezalaki bobele likambo ya politike te. Lokola mboka yango etongamaki na botyoli bokonzi ya Jéhovah, makambo na losambo ekotaki mpe kati na yango. Ya solo, Babilone ya kala ezali esika ebandaki losambo ya bikeko mpe ya banzambe ya lokuta. Banganga na Babilone bazalaki koteya mateya mazali koyokisa Nzambe nsoni, lokola liteya oyo elobi ete molimo ekufaka te mpe oyo mosusu ete esika moko ezali epai milimo minyokwamaka seko nsima na kufa, mpe bilimu mabe bazali kokengela esika yango. Balakisaki bato kosambela bikelamu mpe ebele na banzambe mibali mpe banzambe basi. Babimisaki masapo mpo na kolimbola ebandeli ya mabelé mpe ya moto, mpe bazalaki kosala milulu esika moko na mabonza ya mbindo mpo na koluka ete basi babota bana mingi, milona ebota mbuma mingi mpe babundi bakoka kobunda malamu mpe kolonga na bitumba.
23. (a) Bato oyo bapalanganaki longwa na Babilone bamemaki nini elongo na bango, mpe ebimisaki nini? (b) Emoniseli ebengi mangomba nyonso ya lokuta na nkombo nini? (c) Mangomba ya lokuta mazali ntango nyonso kobundisa nini?
23 Ntango bato bakomaki koloba minoko ndenge na ndenge balongwaki na Babilone mpe bapalanganaki na mokili mobimba, bakumbaki elongo na bango losambo ya lokuta oyo ebotamaki na Babilone. Na motindo yango, milulu mpe bindimeli ekokani na oyo ya Babilone ya kala ekolaki kati na bato ya liboso bafandaki na Mpoto, na Afrike, na Amerike, na Asia mpe na bisanga ya Mai monene epai ya sud. Mingi kati na milulu yango mpe bindimeli yango eumeli kino na mikolo na biso oyo. Ntina wana Emoniseli ebengi lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta ete ezali mboka moko, Babilone Monene (Emoniseli mokapo 17 mpe mokapo 18) Epai nyonso oyo yango elonamaki, losambo ya lokuta ebimisi bonganga ya monyoko, biyambayamba, molili to kozanga boyebi mpe pite. Losambo ya lokuta ekomaki esaleli makasi na maboko ya Satan le Diable. Uta kalakala, Babilone Monene ezali kobundisa losambo ya solo ya Jéhovah, Nkolo Moyangeli monene ya molongo mobimba.
24. (a) Ndenge nini Nyoka akokaki koswa libota ya mwasi “na litindi”? (b) Mpo na nini koswama ya libota ya mwasi ezali bobele mpota na litindi?
24 Baoyo balekaki mabe kati na libota na Nyoka, ezalaki bakomeli mpe Bafalisai na losambo ya Bayuda. Na ekeke ya liboso, bango babimisaki monyoko mpe babomisaki momonisi na liboso mpenza na libota na mwasi. Ezali motindo yango nde Nyoka ‘aswaki libota na litindi.’ (Genese 3:15; Yoane 8:39-44; Misala na Bantoma 3:12, 15) Mpo na nini ezalaki bobele mpota na litindi? Mpamba te kufa yango ezalaki se ya ntango moke, awa na mabelé. Ezalaki mpo na libela te mpamba te Jéhovah asekwisaki Yesu na mokolo ya misato mpe atombolaki ye, kopesaka ye bomoi ya elimo.—Misala na Bantoma 2:32, 33; 1 Petelo 3:18.
25. (a) Motindo nini Yesu akembisami asili kotelemela Satana mpe baanzelu na ye? (b) Ntango nini libota ya Satana na mabelé ekobomama nyee? (c) Konyatama “na motó” na nyoka to Satana ekolimbola nini, ntango akonyatama na Libota na mwasi na Nzambe?
25 Yesu Klisto akembisami azali sikawa kosala mosala na ye na loboko mobali ya Nzambe, esika azali kosambisa banguna ya Jéhovah. Asili kotelemela Satan le Diable mpe baanzelu na ye badémo mpo ete abenganaki bango na makolo mpe bazali sikawa kolekaleka bobele zongazonga na mabelé, ntina wana tozali komona mpasi ebakisami na mokili na mikolo na biso. (Emoniseli 12:9, 12) Nzokande, lokola esakolamaki, libota ya Satana awa na mabelé ekobomama ntango Nzambe akokokisa ekateli na ye likoló na Babilone Monene mpe likoló na lisangá mobimba ya Satana awa na mabelé. Mpo na kosukisa, Yesu Klisto, Libota na mwasi na Nzambe, “akonyata” motó na Satana, nyoka na kalakala na mayele mabe, mpe ekozala mpo na ye kufa ya libelalibela, akomonana lisusu ata esika moko te kati na makambo na bato.—Baloma 16:20.
26. Mpo na nini ezali likambo na ntina mingi mpo na biso ete toyekola esakweli ya Emoniseli?
26 Nyonso oyo ekosalema motindo nini? Ezali yango elakisami na biso na mokanda na Emoniseli na nzela na bimonaneli mingi mpe bilembo ya kokamwa. Na yango, tobanda nokinoki koyekola esakweli oyo ya nguya mingi. Solo, esengo na biso soki tozali koyoka mpe kotosa maloba na Emoniseli! Kosalaka bongo, tokokumisa nkombo na Jéhovah, Nkolo Moyangeli Monene ya molongo mobimba mpe tokozwa lokola libula bolamu ya seko oyo alaki biso. Tosengi na yo ete otanga mpe osalela na mayele nyonso makambo oyo okoyekola. Ekoki kozala mpo na yo lobiko na ntango oyo ya ntina mingi kati na lisolo ya bato.
[Etanda/Elilingi na lokasa 13]
Mabanga oyo mamonisi ndenge nini mombongo ezalaki kosalema
Mokanda Ancient Near Eastern Texts, oyo ebimisamaki na James Pritchard, etangi mibeko 300 mikomamaki na Hammourabi na eleko ya kalakala ya Babilone. Emonisi ntina ya koboya moyibi, oyo na ntembe te ezalaki kosalema na makambo na mombongo na ntango wana. Tala ndakisa moko: “Soko epai na mobali moko, ye nsomi to moombo, moto asombi to azwi mosolo mpo na kobomba yango, to wolo, to moombo mobali to mwasi, ngombe, mpate, mpunda, to eloko nini mosusu, soko asombi yango to azwi yango kozanga motatoli to mokanda ekomami, moto yango azali moyibi: akobomama.”