Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • re mok. 3 nk. 15-17
  • Makambo masengeli kobima noki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo masengeli kobima noki
  • Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzela esalelamaki mpo na kopesa Emoniseli
  • Bózala batangi ya esengo ya mokanda ya emoniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mokanda ya Emoniseli elimboli nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Emoniseli mpe yo
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Yoka makambo oyo elimo ezali koloba na masangá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
re mok. 3 nk. 15-17

Mokapo 3

Makambo masengeli kobima noki

1. Ndenge nini okoki kobika ntango Nzambe akoboma mokili?

EBONGI ete omibanzabanza mpo na makambo mazali kobima na mokili mobimba na ntango na biso. Mpo na nini? Ezali mpo ete mokili ya lelo ekoki te kopengola etumbu ya Nzambe. Kasi yo, okoki kopengola yango, soki okoboya “kosangana na mokili” oyo esili kokweisama ete ebomama. Elingi koloba te ete esengeli na yo kobanda kofanda na esika na yo moko mpe koboya bisengo nyonso mpe komikangela na ndako. Ezali nde boye ete, ata ozali kokokisa makambo mingi na bomoi na yo, nzokande omikaboli na libebi ya politike, na elimo ya mombongo ya koluka matomba mabe, na mangomba oyo mazali koyokisa Nzambe nsoni, mpe obwaki etamboli nyonso ya mobulu mpe ya mbindo soki mpe pite. Esengeli na yo kolanda mitinda mitombwami ya bizaleli malamu oyo Nzambe asili kopesa, mpe koluka kosala mokano na ye. (Yoane 17:14-16; Sofoni 2:2, 3; Emoniseli 21:8) Mokanda ya Emoniseli elobeli makasi ntina ya kotosa makambo oyo nyonso mpe kosala mabongwani masengeli kati na bomoi na yo.

2. Na maloba nini ntoma Yoane abandelaki esakweli ya kokamwa ya Emoniseli, mpe na nani Nzambe apesi nsango oyo ya ntina mingi?

2 Ntoma Yoane abandaki esakweli oyo kitoko na maloba oyo: “Oyo emoniseli na Yesu Klisto, epesaki Nzambe ye mpo na kotalisa baombo na ye makambo makobima noki.” (Emoniseli 1:1a) Ezali bongo Yesu Klisto asekwisami nde azwaki epai na Nzambe nsango oyo ya ntina mingi. Yesu alakisami awa ete azali kotosa Tata na ye mpe azali na nse ya Tata na ye; na bongo asangani te kati na Trinité to bosato ya bonkuku. Bobele bongo, “baombo,” elingi koloba lisangá ya boklisto, bazali kotosa Yesu Klisto; yango wana ‘bazali kolanda ye ata akei wapi.’ (Emoniseli 14:4; Baefese 5:24) Kasi banani bazali lelo “baombo” na Nzambe, mpe na nini emoniseli ezali litomba mpo na bango?

3. (a) Banani bazali “baombo” na Yesu Klisto? (b) Mosala nini “baombo” na sembo bazali kokokisa yango na kotambwisama na baanzelu?

3 Ntoma Yoane, oyo akomaki emoniseli, amilakisi ye moko ete azali mpe moombo. Azalaki ntoma ya nsuka oyo atikalaki naino na bomoi mpe mosangani na etuluku na “baombo” baponami mpe bapakolami na elimo, mpo na kozwa libula na bomoi bokoki kosuka te kuna na makóló. Lelo oyo, etikali awa na mokili bobele mwa bankoto na “baombo” yango. Nzambe azali mpe na basaleli mosusu, ebele monene na mibali, na basi mpe na bana, oyo motuya na bango ekoki sikawa bamilió mingi. Na kotambwisama na baanzelu, basangani esika moko na “baombo” bapakolami mpo na kosakola nsango malamu ya seko epai na bato. “Baombo” yango bamipesi mpenza mpo na kosalisa basokemi na mokili mpo ete bakoka kozwa lobiko. (Matai 24:14; Emoniseli 7:9, 14; 14:6) Emoniseli ezali kolobela yo motindo nini okoki kozwa litomba na nsango malamu oyo ezali kopesa esengo.

4. (a) Lokola Yoane akomaki Emoniseli esili kokoma mbula koleka 1 900, ndenge nini akokaki koloba mpo na “makambo makobima noki”? (b) Na ntina na makambo malakamaki, makambo ya lelo mamonisi nini?

4 Kasi ndenge nini Yoane akokaki koloba ete “baombo” yango balingaki komona “makambo makobima noki”? Maloba yango malobamaki esili bongo kokoma mibu koleka 1 900, boye te? Na miso na Jéhovah, mpo na ye mbula nkoto ezali lokola “mokolo moko,” mbula 1 900 elakisi eleko moko mokuse soki tokokisi yango na ntango ebele mpe ebele, eyebani motuya te, oyo ye alekisaki yango mpo na kozalisa mpe kobongisa mabelé, efandelo ya moto. (Nzembo 90:4) Ntoma Paulo akomaki na ntina na ‘kozela na ye na motema móto mpe na elikya na ye,’ mpamba te andimisamaki ete mosika te nde azwi mbano na ye. (Bafilipi 1:20) Nzokande lelo, bilembo bizali mingi bimonisi ete makambo nyonso masakolamaki makokokana na ntango oyo esili kotyama elembo. Mpo na mbala ya liboso kati na Lisolo ya bato, libota mobimba ya bato awa na mokili ezali na likama ya kolimwa. Bobele Nzambe nde akoki kobongisa likambo yango.—Yisaya 45:21.

Nzela esalelamaki mpo na kopesa Emoniseli

5. Ndenge nini Emoniseli epesamaki na ntoma Yoane mpe na nsima epai na masangá?

5 Emoniseli 1:1b, 2 elandi na koloba ete: “[Yesu] atindi anzelu na ye mpo na koyebisa Yoane, moombo na ye, yango [Emoniseli]. Ye Yoane atatoli mpo na makambo nyonso mamonaki ye, mpo na Liloba na Nzambe mpe litatoli na Yesu Klisto.” Yoane azwaki bongo emoniseli oyo epemami na Nzambe na nsima na momemi na nsango, anzelu. Akomaki yango na mokanda moko oyo ye atindaki yango na masangá na eleko wana. Esengo mpo na biso, mpamba te Nzambe abatelaki yango mpo na kolendisa masangá pene na 100 000 ya basaleli na ye oyo bazali na bomoko na mokili mobimba.

6. Na maloba nini Yesu alakisaki nzela oyo akosalela mpo na kopesa bilei ya elimo na ‘baombo’ na ye lelo?

6 Nzambe asalelaki nzela moko mpo na kopesa Emoniseli na mikolo na Yoane, mpe ntoma Yoane ye moko azalaki esaleli awa na mabelé kati na nzela yango. Bobele bongo, Nzambe azali lelo na nzela oyo azali kosalela mpo na koleisa ‘baombo’ na ye na elimo. Na esakweli na ye monene likoló na nsuka na biloko mabe na ntango oyo, Yesu amonisaki nani akosalela awa na mabelé, elingi koloba “moombo na sembo mpe na mayele oyo nkolo na ye atyaki ye likoló na bato na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango ekoki.” (Matai 24:3, 45-47) Azali kosalela kelasi oyo ya Yoane mpo na kopesa ndimbola na esakweli.

7. (a) Bilembo ya Emoniseli bisengeli kozala na bopusi nini likoló na biso? (b) Uta ntango boni bamoko kati na kelasi na Yoane bazali kosangana na kokokisama ya bimonaneli bizwami na mokanda na Emoniseli?

7 Ntoma Yoane akomaki ete Yesu apesaki Emoniseli na “bilembo,” ya bomoi mpe ya kitoko mpo na koyekola. Ezali kolimbola misala na nguya oyo misengeli kobimisa kati na biso molende mpo na koyebisa na bazalani na biso esakweli yango mpe ndimbola na yango. Emoniseli ezali na bimonaneli bizali kongengisa biso, mpe na moko na moko Yoane azalaki, to na likambo ya kosala, to azalaki motali. Baklisto na kelasi ya Yoane, bamoko na bango bazali kosangana na kokokisama ya bimonaneli yango uta bambula mingi, bazali na esengo na komona ete elimo na Nzambe epesi ndimbola ya esakweli yango, mpe bango bazali sikawa na likoki ya kongengisa bazalani na bango na ntina oyo.

8. (a) Nini ezali kokesenisa esakweli moko na moko na Emoniseli? (b) Ndenge nini esakweli ya Danyele ezali kosalisa biso na koyeba ndimbola ya banyama ya Emoniseli?

8 Emoniseli elakisi bimonaneli oyo na molongo na ntango te. Emonaneli mokomoko ezali kokokana na ntango na yango. Bimonaneli mingi bizali kolandana ya bisakweli ya kala oyo bipesi nzela na kolimbola yango. Na ndakisa, esakweli ya Danyele elobeli nyama minei ya nsomo, oyo, engebene esakweli yango, elakisi bikonzi ya mokili. Na motindo yango, esalisi biso na kokanga ntina ete nyama elobelami na Emoniseli elimboli bikonzi ya politike, bakisa na oyo tozali na yango lelo.—Danyele 7:1-8, 17; Emoniseli 13:2, 11-13; 17:3.

9. (a) Na ndakisa ya ntoma Yoane, ezalela nini kelasi na Yoane babateli yango? (b) Engebene Yoane, na nzela nini tokoki kozwa bolamu?

9 Yoane atatolaki na bosembo nyonso mpo na nsango oyo Nzambe ayebisaki ye na nsima na Yesu Klisto. Akomaki polelepolele “makambo nyonso mamonaki ye.” Mpe kelasi ya Yoane baluki solo kotambwisama na Nzambe mpe na Yesu Klisto mpo na kozwa bososoli nyonso na esakweli yango mpe koyebisa makambo na yango ya motuya na libota ya Nzambe. Mpo na litomba ya lisangá ya bapakolami (mpe ya ebele monene ya bato bauti na mikili nyonso oyo Nzambe akobatela bango na bomoi, kobikisaka bango na bolozi monene), Yoane akomaki: “Esengo na motangi mpe na bayoki na maloba na kosakola oyo, mpe baoyo batosi makambo masili kokomama kati na yango, mpo ete elaka ebelemi.”—Emoniseli 1:3.

10. Mpo na oyo etali Emoniseli, eloko nini tosengeli kosala mpo ete tozala na esengo eleki monene?

10 Okozwa matomba mingi na kotanga Emoniseli, mpe koleka, na kotosaka makambo makomami kati na yango. Yoane alimbolaki kati na moko na mikanda na ye ete: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tokokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te. Mpo ete moto na moto oyo asili kobotama na Nzambe akolonga mokili. Elonga oyo eleki mokili ezali kondima na biso.” (1 Yoane 5:3, 4) Luka kondima motindo oyo, mpe okozala na esengo eleki monene.

11. (a) Mpo na nini ezali likambo na noki mpo na biso ete totosa maloba na esakweli oyo? (b) Ntango nini esili kobelema?

11 Ezali likambo na noki mpo na biso ete totosa maloba na esakweli oyo, “mpo ete elaka ebelemi.” Elaka nini? Oyo ya kokokisama ya bisakweli ya Emoniseli, bakisa bikateli na Nzambe. Ntango esili kobelama oyo Nzambe mpe Yesu Klisto bakoboma mokili oyo etambwisami na Satana. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, alobaki ete bobele Tata na ye ayebi ‘mokolo wana mpe ngonga wana.’ Komonaka liboso mobulu oyo esili kobima na mokili na mikolo na biso, Yesu alobaki mpe ete: “Libota oyo ekoleka te kino makambo oyo masili kosalama.” (Malako 13:8, 30-32) Lokola elobi yango Habakuku (2:3): “Emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami, ekomi noki epai na nsuka, ekozanga te; ata ezali koumela, zela yango; ekoya solo mpenza, ekoumela mingi te.” Totosa bongo makambo makomami na Liloba na esakweli na Nzambe, mpamba te kobika na biso na bolozi monene etali yango.—Matai 24:20-22.

[Etanda na lokasa 15]

Mpo na kokanga ntina na mokanda na Emoniseli, esengeli na biso:

● Kozwa lisalisi na elimo ya Jéhovah

● Kososola ntango nini mokolo na Nkolo ebandaki

● Koyeba nani azali moombo na sembo mpe na mayele na mikolo na biso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto